Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 6:20

[1] Yobo azongisaki :

[2] « Ezali ya solo, ezali penza ndenge osili koloba, mpe nayebi yango malamu ! Kasi ndenge nini moto oyo asalema na putulu akoki kozala sembo liboso ya Nzambe ?

[3] Ata, na mbala nkoto moko, ameki kobeta tembe na Nzambe, akotikala kokoka kolonga ata mbala moko te.

[4] Bwanya ya Nzambe ezali na bozindo makasi, mpe nguya na Ye ezali monene ; nani asila kotelemela Ye, bongo amona bolamu ?

[5] Alongolaka bangomba na bisika na yango, wana yango moko eyebaka te, mpe, kati na kanda na Ye, akweyisaka yango ;

[6] aningisaka mabele wuta na esika na yango mpe alengisaka makonzi na yango ;

[7] apesaka mitindo na moyi, mpe moyi ebimaka te ; atiaka kashe na minzoto.

[8] Atandaki Ye moko Likolo mpe atambolaka likolo ya mbonge ya ebale ;

[9] akelaki bangombolo minene, orioni, masanga ya minzoto mpe minzoto ya sude ;

[10] asalaka makambo minene oyo elekelaka mayele ya bato, bikamwa ya somo oyo bakokaka kotanga te.

[11] Soki aleki pene na ngai, nakokoka te komona Ye ; soki mpe akei, nakokoka te komona Ye.

[12] Soki azwi eloko, nani akoki kobotola Ye yango ? Nani akoki koloba na Ye : ‹ Ozali kosala nini ? ›

[13] Nzambe azongisaka kanda na Ye sima te ; liboso na Ye, ezala bato ya lolendo balengaka.

[14] Bongo, ngai, nakokoka ndenge nini kobeta tembe na Ye ? Nakolonga ndenge nini kopona maloba ya komekana na Ye ?

[15] Ezala soki nazalaki moto ya sembo, nalingaki na ngai kokoka te kopesa Ye eyano ; nalingaki kokoka nde kaka kosenga mawa ya Mosambisi na ngai.

[16] Ata nabelelaki Ye, mpe ayanoli ngai, nalingaki na ngai kondima te ete ayoki ngai,

[17] pamba te afini ngai na nzela ya mopepe makasi mpe akomisi bapota na ngai ebele na pamba,

[18] aboyi kotikela ngai tango ya kopema, wana azali kaka kotondisa ngai na pasi.

[19] Soki ezali likambo oyo esengi makasi, Ye nde Nkolo-Na-Nguya ! Mpe soki ezali likambo ya bosembo, nani akoki kosambisa Ye ?

[20] Ezala namemaki na ngai ngambo te, monoko na ngai elingaki kaka kokweyisa ngai ; ezala nazalaki sembo, monoko na ngai elingaki kaka kolakisa mbeba na ngai.

[21] Atako nazali sembo, motema na ngai etondi na mawa mpo na ngai moko, nayini bomoi na ngai.

[22] Nyonso ezali kaka ndenge moko ! Yango wana nalobi : ‹ Abomaka bato ya sembo mpe bato mabe. ›

[23] Tango mopepe ya bokono ememaka kufa na mbalakata, Nzambe asekaka komekama ya bato ya sembo.

[24] Soki mokili ekweyi na maboko ya bato mabe, Nzambe azipaka miso ya basambisi na yango. Soki ezali Ye te, ezali nani ?

[25] Mikolo ya bomoi na ngai ezali kokende mbangu koleka mopoti mbangu, ezali kokende mbangu penza, kasi etikali komona esengo te.

[26] Ezali kokende penza mbangu koleka masuwa oyo esalema na papirisi, koleka mpongo oyo ezali kokitela bilei na yango.

[27] Soki nalobi : ‹ Nabosana ata pasi na ngai, nabongola elongi na ngai mpe nakoma koseka, ›

[28] nazali kaka kobanga pasi na ngai nyonso, pamba te nayebi ete okozwa na Yo ngai te lokola moto ya sembo.

[29] Lokola esili komonana ete nasali mabe, mpo na nini namitungisa lisusu na pamba ?

[30] Ezala namisukoli nzoto na sabuni mpe nasukoli maboko na ngai na sabuni ya malonga,

[31] okobwaka ngai kaka na libulu ya potopoto, mpe bilamba na ngai ekoyoka ngai nkele.

[32] Azali moto lokola ngai te mpo ete nazongisela Ye eyano to nakende kosamba na Ye liboso ya basambisi.

[33] Soki ezalaki ata na moto moko oyo akokaki komikotisa kati na likambo na biso mpe kotombola loboko na ye kati na ngai mpe Nzambe,

[34] moto oyo akokaki kolongola fimbu ya Nzambe mosika na ngai mpo ete somo na Ye ebangisa ngai lisusu te,

[35] nalingaki kotombola mongongo na ngai liboso na Ye na kobanga te. Kasi ndenge ezali sik’oyo, nakokoka te.

Yobo — Chapters