[1] Yobo azongisaki :
[2] « Yoka na bokebi maloba na ngai, mpe tika ete yango ezala kobondisama mpo na ngai.
[3] Bokanga nanu mitema, wana nazali koloba ; soki nasilisi koloba nde bokoba na bino koseka ngai.
[4] Boni, nazali kolela epai ya moto ? Ndenge nini nalemba te kokanga motema ?
[5] Botala ngai, bokokamwa, bokozanga ata likambo ya koloba.
[6] Soki kaka nakanisi yango, nabangi, mpe nzoto na ngai ekomi kolenga na somo.
[7] Mpo na nini bato mabe bazali kowumela na bomoi ? Mpo na nini bakomaka mibange mpe babakisaka nguya na bango ?
[8] Bana na bango bazali kolendisama pembeni na bango, mpe bakitani na bango bazali kofuluka na miso na bango.
[9] Bandako na bango ebatelami mpe ezangi kobanga, fimbu na Nzambe ezali likolo na bango te.
[10] Bangombe na bango ya mibali elembaka te kobotisa, bangombe na bango ya basi ebotaka kaka mpe esopaka zemi te.
[11] Lokola kati na etonga ya bameme, bazali kotika bana na bango : bamoko kokima-kima, mpe bamosusu kosakana.
[12] Bazali kobeta mbonda mpe lindanda, bazali kosepela na lokito ya flite ;
[13] bazali kolekisa mikolo na bango na bomengo, mpe bazali kokende na mboka ya bakufi na kimia.
[14] Nzokande, balobaka na Nzambe : ‹ Longwa mosika na biso ! Tozali na posa te ya koyeba nzela na yo.
[15] Nkolo-Na-Nguya-Nyonso nde nani mpo ete tosalela ye ? Tokozwa litomba nini na kosambela ye ? ›
[16] Boni, bozwi na bango ezali kati na maboko na bango moko te ? Kasi mosika na ngai, likanisi ya kolanda toli ya bato mabe !
[17] Mbala boni bazali koboma mwinda ya bato mabe ? Mbala boni pasi ezali kokitela bango ? Boni, Nzambe abombeli bango kanda na Ye ?
[18] Mokolo nini mopepe makasi ekomema bango lokola makasa to matiti ya kokawuka ?
[19] Balobaka : ‹ Nzambe apesaka etumbu ya moto mabe epai ya bana na ye. › Tika ete apesa etumbu yango epai na ye moko moto mabe, mpo ete ayeba yango !
[20] Tika ete miso na ye moko emona kobebisama na ye, mpe amela kopo ya kanda ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.
[21] Pasi ya libota oyo etikali sima na ye ekosala ye nini tango basanza oyo bakatela ye ekomi na suka ?
[22] Bakoki solo koyekolisa Nzambe mayele, Ye oyo asambisaka ezala bato oyo baleki kotombolama ?
[23] Moko azali kokufa na makasi na ye nyonso, na kimia nyonso mpe na pasi ata moko te,
[24] na nzoto sembesembe, mpe na mikuwa etonda na mafuta ;
[25] mosusu azali kokufa na mawa na motema, atikali ata komeka kosepela na bomengo te.
[26] Nzokande, bango mibale bakolala ndenge moko na se ya mabele, mpe bankusu ekozipa bango.
[27] Solo, nayebi malamu makanisi mpe mabongisi na bino, mpo na kotelemela ngai ;
[28] bolobaka : ‹ Wapi ndako ya mozwi ? Wapi bandako oyo bato mabe bazalaki kovanda ? ›
[29] Botunaki mituna wana te epai ya baleki nzela ? Bobosani makambo oyo bayebisaki bino,
[30] ete moto mabe abikaka mpe na mokolo ya pasi, akangolamaka mpe na mokolo ya kanda.
[31] Nani, na miso ya moto mabe, apamelaka etamboli na ye ? Nani azongiselaka ye makambo oyo asalaka ?
[32] Bamemaka ye na lilita, mpe bakengelaka kunda na ye.
[33] Mabele ya lubwaku ezalaka malamu mpo na ye ; bato nyonso batambolaka sima na ye na molongo, mpe bato ebele penza batambolaka liboso na ye.
[34] Boye, mpo na nini bozali komitungisa mpo na kobondisa ngai ? Pamba te kati na biyano na bino, etikali kaka lokuta. »