[1] Yobo azongisaki :
[2] « Ah ! Tala ndenge osungi moto oyo azangi makasi, ndenge osungi loboko oyo elembi !
[3] Tala toli oyo opesi na moto azangi bwanya, mpe tala ebele na mayele oyo olakisi !
[4] Ozwi maloba oyo wapi ? Molimo oyo elobi na monoko na yo ezali ya nani ?
[5] Bakufi balengaka na se ya mayi mpe ya bikelamu oyo ezalaka kuna.
[6] Liboso ya Nzambe, mboka ya bakufi ezali bolumbu, mpe libulu ya molili ezali polele.
[7] Atandaka likolo na esika oyo ezali na eloko moko te, atelemisaka mabele na likolo ya eloko moko te,
[8] akangaka mayi kati na mapata, kasi mapata epasukaka te ;
[9] azipaka kiti ya bokonzi na Ye, atandaka mapata na likolo na yango ;
[10] akataka mondelo na likolo ya mayi, na suka ya pole mpe na molili.
[11] Makonzi ya Lola ezali kolenga mpe ezali kokamwa na pamela na Ye.
[12] Na nguya na Ye, apasoli ebale monene ; mpe na mayele na Ye, abuki-buki Rakabe na biteni.
[13] Na pema na Ye, Likolo ekomaka kitoko, loboko na Ye etobolaka nyoka oyo ekimaka.
[14] Soki makambo wana ezali kaka ndambo moke ya misala na Ye mpe mongongo na Ye ya se oyo toyokaka, nani akoki kososola bakake ya nguya na Ye ? »