Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 4:06

[1] Elifazi, moto ya Temani, azwaki maloba mpe alobaki :

[2] « Soki moto moko ameki koloba na yo ata liloba moko, boni, okotomboka mpo na yango te ? Kasi nani akoki penza kokanga motema mpe kozanga maloba ?

[3] Kanisa nanu ndenge ozalaki koteya bato ebele, ndenge ozalaki kolendisa bato oyo balembaki !

[4] Maloba na yo ezalaki kolendisa bato oyo bazalaki kotepatepa, mpe oyo mabolongo na bango ezalaki kolemba.

[5] Kasi awa sik’oyo pasi ekomeli yo, olembi na yo ! Awa pasi ebeti yo, okomi na yo koyoka somo !

[6] Boni, kondima na yo epai ya Nzambe esengeli te kozala likonzi na yo, mpe bosembo na yo esengeli te kosimba elikya na yo ?

[7] Kanisa nanu : Nani akotikala kokufa te mpo ete asalaka mabe te ? Esika nini bato ya sembo bakotikala kokufa te ?

[8] Kolanda makambo oyo ngai nasili komona, bato oyo basalaka mabe, mpe ba-oyo balonaka minyoko, babukaka mpe kaka mabe lokola mbuma ;

[9] bakufaka na mopepe ya Nzambe mpe basilaka na mopepe ya kanda na Ye.

[10] Nkosi ekoki na yango koganga, mpe mwana ya nkosi ekoki kotia makelele ndenge elingi, kasi Nzambe abukaka minu ya nkosi.

[11] Nkosi ekufaka mpo na kozanga nyama ya kolia, mpe bana ya nkosi ya mwasi epanzanaka.

[12] Liloba moko eyelaki ngai na nkuku, mpe matoyi na ngai eyokaki yango na se penza :

[13] kati na bandoto ya butu, na tango bato bazwaka pongi makasi,

[14] kobanga mpe somo ekangaki ngai mpe eningisaki mikuwa na ngai nyonso ;

[15] molimo moko elekaki liboso ya elongi na ngai lokola mopepe, mpe suki ya moto na ngai etelemaki.

[16] Molimo yango etelemaki wana, kasi nalongaki te kososola soki ezali nini ; elilingi yango etelemaki liboso ya miso na ngai, mpe nayokaki mongongo moko koloba na se penza :

[17] ‹ Boni, moto akoki solo koleka Nzambe na bosembo to akoki solo koleka Mokeli na ye na bule ?

[18] Soki Nzambe atielaka basali na Ye motema te, soki kutu amonaka mabunga epai ya ba-anjelu na Ye,

[19] mpo na nini te epai ya bato oyo basalema na mabele, ba-oyo bazali kaka putulu mpe bakoki kofinafina bango lokola mitsopi ?

[20] Kobanda na tongo kino na pokwa, bakataka-kataka bango na biteni ; bakufaka mpo na libela, mpe moto ata moko te alandelaka likambo na bango ;

[21] basinga oyo esimbaka bandako na bango ya kapo epikolamaka na mbalakata, mpe bakufaka ndenge wana bazanga bwanya. ›

Yobo — Chapters