[1] Yobo azongisaki :
[2] « Nayoki maloba ebele ya lolenge oyo ; bino nyonso bozali babondisi mabe.
[3] Kino tango nini bokotika koloba maloba ya pamba-pamba boye ? Likambo nini etindi yo lisusu kozongela maloba ?
[4] Ngai mpe nakokaki koloba lokola bino, soki bozalaki na esika na ngai, nakokaki kobimisa maloba ebele mpe koningisa moto mpo na bino.
[5] Kasi monoko na ngai elingaki kolendisa bino, mpe bibebu na ngai elingaki koningana mpo na kokitisa bino mitema kati na pasi.
[6] Nzokande, soki nalobi, pasi na ngai ekosila te ; bongo soki nakangi monoko nde pasi yango elongwe na bomoi na ngai ?
[7] Oh Nzambe ! Solo penza, olembisi ngai ! Obebisi ndako na ngai nyonso,
[8] ofini-fini ngai makasi penza, mpe kokonda na ngai ekomi ata kotatola mpe kofunda ngai na miso ya bato !
[9] Kanda na Yo ezali kopasola mpe kobundisa ngai, okomi ata kolia minu mpo na kosala ngai mabe mpe kotala ngai na miso mabe lokola nde nazali monguna na yo.
[10] Bato mabe bafungoli minoko mpo na kotiola ngai, bakomi kobeta ngai bambata na matama mpo na kosambwisa ngai, bango nyonso basaleli ngai likita.
[11] Nzambe akabi ngai na maboko ya bato mabe mpe abwaki ngai na manzaka na bango.
[12] Makambo nyonso ezalaki kotambola malamu mpo na ngai, kasi aningisi ngai, akangi ngai na kingo mpe apanzi ngai, akomisi ngai lokola eloko na Ye ya komekela makonga ;
[13] makonga na Ye ezingeli ngai, atoboli-toboli libumu na ngai, mpe na mawa te, asopi makila na ngai na mabele.
[14] Tango nyonso, azali kaka kozokisa ngai mpe kokweya likolo na ngai lokola elombe.
[15] Natongi elamba na ngai ya saki na poso ya nzoto na ngai mpe nakundi lokumu na ngai nyonso na se ya putulu.
[16] Likolo ya kolela, elongi na ngai ekomi motane, mpe molili ezingeli miso na ngai.
[17] Nzokande, maboko na ngai etikala kosala moto mabe te, mpe libondeli na ngai ezalaki kosalema na motema peto.
[18] Oh mabele, kozipa makila na ngai te ! Kotika te ete koganga na ngai ezwa tango ya kopema !
[19] Wuta sik’oyo, motatoli na ngai azali na Likolo, molobeli na ngai azali na Lola.
[20] Baninga na ngai bakomi koseka ngai ; nazali nde kolela epai ya Nzambe na mpinzoli.
[21] Boni, ezali solo na molobeli oyo akoki kolobela moto liboso ya Nzambe ndenge moto alobelaka moninga na ye ?
[22] Solo, motango ya mibu na ngai ekomi pene ya kosila, mpe nakokende na ngai na nzela oyo bato bazongaka lisusu te.