[1] Bilidadi, moto ya Shuwa, azwaki maloba mpe alobaki :
[2] « Kino tango nini okokoba koloba makambo ya boye ? Maloba na yo ezali te lokola mopepe makasi ?
[3] Boni, Nzambe abukaka mibeko, Nkolo-Na-Nguya-Nyonso abalolaka penza bosembo ?
[4] Soki bana na yo basalaki masumu liboso na Ye, apesaki nde bango etumbu mpo na mabe na bango !
[5] Kasi yo, soki oluki Nzambe, soki osengi ngolu epai na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso,
[6] soki ozali peto, soki ozali sembo, akotelema Ye moko, ata sik’oyo, mpo na kokata likambo na yo mpe kozongisela yo libula na yo, kolanda bosembo na yo.
[7] Bozwi na yo ya kala ekomonana moke, pamba te bozwi oyo ekoya na sima ekozala monene koleka.
[8] Nabondeli yo, tuna bato oyo baleka liboso, kanisa mpe landela malamu bwanya ya batata na bango,
[9] pamba te, biso, tozali bato ya lobi oyo ewuti koleka, toyebi eloko te, mpe mikolo na biso, awa na se, ezali kaka lokola elili.
[10] Bato ya kala bakoteya yo, bakoloba na yo, mpe, na bwanya na bango, bakobimisela yo mateya oyo :
[11] Boni, nzete ya papirisi ekoki penza kobota na esika oyo ezangi potopoto ? Nzete oyo ebotaka na mayi ekoki solo kobota na esika ekawuka ?
[12] Ekawukaka liboso ya matiti nyonso, wana makasa na yango ezali nanu mobesu, ata bapikoli yango te.
[13] Ndenge wana nde ezalaka, bomoi ya bato nyonso oyo babosanaka Nzambe ; boye, elikya ya bato mabe ebebaka.
[14] Eloko oyo batielaka motema ekokatana, pamba te elikya na bango ezali lokola ndako ya limpulututu.
[15] Ata batieli ndako na bango motema, esimbaka te ; Ezala bakangami na yango, esimbaka kaka te.
[16] Bazali lokola nzete ya mobesu na tango ya moyi makasi ; mandalala na yango ezipaka elanga,
[17] elingaka misisa na yango zingazinga ya mabanga mpe epasolaka nzela kati na mabanga ;
[18] kasi soki bapikoli nzete yango na esika na yango, esika yango ewanganaka nzete mpe elobaka : ‹ Natikala komona yo te ! ›
[19] Ndenge wana nde suka na yango ekozala ; mpe banzete mosusu ekobota kaka na mabele wana.
[20] Solo, Nzambe abwakaka te bato ya sembo, mpe alendisaka te maboko ya bato mabe.
[21] Nzokande, akotondisa monoko na yo na koseka, mpe bibebu na yo na banzembo ya esengo.
[22] Banguna na yo bakotondisama na soni, mpe bandako ya bato mabe ekozala lisusu te. »