Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 2:59

[1] Pema na ngai ekomi pene ya kosila, mikolo na ngai etikali ya kotanga, kunda ezali kozela ngai.

[2] Solo, batioli bazingeli ngai, miso na ngai ezali komona kotiola na bango.

[3] Oh Nzambe, mipesa ata Yo moko lokola ndanga, na esika na ngai, epai na Yo ; soki te, nani mosusu akoki komipesa lokola ndanga mpo na ngai !

[4] Okangi boyebi na bango mpo ete basosola te ; yango wana, okolongisa bango te.

[5] Moto oyo akofunda balingami na ye mpo ete babotola bomengo na bango na makasi, bana na ye bakokufa miso.

[6] Nzambe akomisi ngai lokola lisapo kati na minoko ya bato, lokola moto oyo babwakelaka soyi na elongi.

[7] Miso na ngai ekomi molili likolo ya pasi, mpe nzoto na ngai nyonso ekomi lokola elilingi.

[8] Bato ya sembo bazali kokamwa likambo yango, mpe moto oyo ayebi na ye likambo te atelemeli moto mabe.

[9] Nzokande, bato ya sembo bakangamaka na nzela na bango, mpe bato ya maboko peto bakomaka lisusu makasi koleka.

[10] Bino nyonso, boya mpe bomeka lisusu ! Nakomona ata moto moko te ya bwanya kati na bino.

[11] Mikolo na ngai ekomi pene ya kosila ; mabongisi na ngai mpe baposa ya motema na ngai, nyonso, esili kobeba.

[12] Bato oyo bazali komona butu lokola moyi bazali koloba kati na molili : ‹ Pole ekomi pene, › nzokande molili ezali makasi.

[13] Soki ezali na ndako moko kaka oyo nazali kotiela elikya, ezali nde kunda ; soki mpe nakotandaka mbeto na ngai, ezali nde kati na mboka ya bakufi.

[14] Soki nalobi na kunda : ‹ Ozali tata na ngai, › mpe na mutsopi : ‹ Ozali mama na ngai to ndeko na ngai ya mwasi, ›

[15] wana elikya na ngai ezali penza wapi, mpe nani penza azali komona elikya na ngai ?

[16] Ekokita kino na bikuke ya kufa tango tokokende elongo kopema kati na putulu. »

Yobo — Chapters