Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 4:47

[1] Ganga na yo, soki olingi ! Nani akoyanola yo ? Okotombokela mosantu nini ?

[2] Kotomboka ebomaka moto oyo azangi mayele, zuwa ebomaka zoba.

[3] Solo, namonaki zoba kozwa misisa ; kasi, mbala moko, nalakelaki ndako na ye mabe :

[4] ‹ Tika ete bana na ye ya mibali bazanga lisungi, balonga te na kosambisama mpe bazangela moto oyo akobundela bango !

[5] Tika ete moto oyo azali na nzala asilisa mbuma ya elanga na ye, akamata yango kino kati na basende ; mpe tika ete moto ya lokoso asilisa bomengo na ye ! ›

[6] Pamba te pasi ewutaka na putulu te, mpe minyoko ewutaka na mabele te ;

[7] moto abotamaka mpo na komona pasi, ndenge kaka mikalikali ebimaka mpo na kopanzana na likolo.

[8] Kasi soki ezalaki ngai, nalingaki komimonisa liboso ya Nzambe, nalingaki kotalisa Ye likambo na ngai.

[9] Nzambe asalaka makambo minene oyo bato bakokaka kososola te, mpe bikamwa oyo bato bakokaka kotanga te ;

[10] anokisaka mvula na mokili, mpe atindaka mayi na bilanga ;

[11] atombolaka bato oyo babwakama, mpe apesaka esengo na bato oyo bazali kolela ;

[12] abebisaka mabongisi ya bato oyo bazalaka na mayele mabe, mpe maboko na bango ekokisaka te mikano na bango ;

[13] akangaka bato ya bwanya kati na mitambo ya mayele mabe na bango, mpe abebisaka mabongisi ya bakosi.

[14] Molili eyelaka bango na moyi ; na moyi makasi, batambolaka na kotepatepa lokola na butu.

[15] Nzambe abikisaka mobola na mopanga ya monoko na bango, akangolaka moto akelela na loboko ya moto ya makasi.

[16] Boye, mobola asengeli kozala na elikya, mpe moto oyo atambolaka na bosembo te asengeli kokanga monoko.

[17] Esengo na moto oyo Nzambe apameli ! Kotiolaka te pamela ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.

[18] Pamba te azokisaka pota, kasi atiaka yango mpe kisi ; abetaka, kasi loboko na Ye ebikisaka.

[19] Mbala motoba, akobikisa yo na pasi ; mpe na mbala ya sambo, mabe ekokomela yo te.

[20] Akokangola yo na kufa, na tango ya nzala makasi ; mpe akobikisa yo na nguya ya mopanga, kati na bitumba.

[21] Okobatelama liboso ya fimbu ya lolemo, okobanga kobebisama te tango ekoya ;

[22] okoseka kobebisama mpe nzala makasi, mpe okobanga te banyama ya mokili ;

[23] pamba te okozala na boyokani elongo na mabanga ya bilanga, mpe banyama ya zamba ekozala na kimia elongo na yo.

[24] Okososola ete ndako na yo ezali na kimia ; tango okotala bibwele kati na lopango na yo, okomona ete ata moko te ezangi.

[25] Okososola ete bana na yo bakozala ebele, mpe bakitani na yo, lokola matiti ya mabele.

[26] Okokita na kunda na kimobange makasi, ndenge batelemisaka maboke ya matiti na tango na yango.

[27] Toyekolaki likambo yango malamu : ezali penza bongo. Boye, yoka yango mpe salela yango mpo na bolamu na yo ! »

Yobo — Chapters