[1] Tsofari, moto ya engumba ya Naama, azwaki maloba mpe alobaki :
[2] « Boni, maloba oyo nyonso ekoki solo kozanga eyano ? Moto oyo azali koloba alonga na ye, kaka mpo ayebi koloba ?
[3] Bato bavanda kaka nye likolo ya maloba na yo ya pamba oyo ozali kobimisa ? Bapamela yo te soki ozali kosala maseki ?
[4] Ozali koloba na Nzambe : ‹ Makambo oyo nazali koloba ezali ya solo ; nazali sembo na miso na Yo. ›
[5] Oh, tala ndenge nini nazali na posa ete Nzambe aloba, ete afungola monoko na Ye mpo na kopamela yo,
[6] mpe asosolisa yo basekele ya bwanya, pamba te bwanya ya solo ezalaka na bilongi mibale. Yeba likambo oyo : Nzambe abosana masumu na yo ebele.
[7] Okoki penza kososola mabombami ya Nzambe ? Okoki solo kososola bandelo ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso ?
[8] Bandelo yango eleki Lola na likolo ; yo penza okosala nini ? Eleki mboka ya bakufi na bozindo ; yo penza okoyeba nini ?
[9] Molayi ya bandelo yango eleki mokili na molayi, mpe eleki ebale monene na kopanzana.
[10] Soki akotisi yo na boloko mpe asangisi basambisi mpo na kokata likambo, nani akotelemela Ye ?
[11] Solo, ayebaka bakosi mpe asosolaka mabe na pete.
[12] Ndenge mwana ya ane ya zamba ebotaka moto te, ndenge mpe kizengi akokoka te kokoma mayele.
[13] Nzokande, soki opesi Ye motema na yo mpe osemboli maboko na yo epai na Ye,
[14] soki olongoli lisumu oyo ezali na loboko na yo mpe opekisi mabe kovanda kati na ndako na yo,
[15] okotombola elongi na yo na soni te, okotelema ngwi mpe okobanga eloko te ;
[16] pamba te okobosana pasi na yo, okokoma kokanisa yango kaka lokola mayi oyo esili kotiola.
[17] Bomoi na yo ekongenga lokola pole ya moyi oyo engengaka na midi, mpe butu na yo ekokoma lokola tongo.
[18] Okozala na kimia, pamba te elikya ezali, okotala zingazinga na yo mpe okozwa bopemi na yo na kimia,
[19] okolala pongi, mpe okomona moto moko te kobangisa yo lisusu, mpe bato ebele bakoya kosenga ngolu na yo.
[20] Kasi miso ya bato mabe ekokufa, mpe bakozanga ekimelo, bakotikala na elikya se moko : kufa. »