Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 4:41

[1] Bato wana misato batikaki koyanola Yobo, pamba te azalaki komimona sembo na miso na ye moko.

[2] Kasi Eliwu, mwana mobali ya Barakeyeli, moto ya libota ya Buzi mpe ya etuka ya Rami, asilikelaki Yobo makasi, pamba te amimonaki sembo koleka Nzambe.

[3] Asilikelaki mpe baninga misato ya Yobo, pamba te balongaki te kopesa Yobo eyano oyo esengeli ; nzokande bakweyisaki Nzambe.

[4] Eliwu awelaki te koloba moto ya liboso epai ya Yobo, pamba te baninga wana misato ya Yobo bazalaki mikolo na ye na mibu ya mbotama.

[5] Kasi tango Eliwu amonaki ete bato wana misato bazali lisusu na likambo ya koloba te, asilikaki makasi.

[6] Boye Eliwu, mwana mobali ya Barakeyeli, moto ya libota ya Buzi, alobaki : « Nazali leki na mibu ya mbotama, mpe bino bozali mikolo ; yango wana nazalaki kobanga mpe nazangaki makasi ya koloba na bino makambo oyo ngai nayebi.

[7] Nazalaki komilobela : ‹ Bato oyo bazali na mibu ebele ya mbotama bakoyeba koloba, pamba te kozala na mibu ebele epesaka bwanya. ›

[8] Nzokande, kati na moto, ezali nde molimo, ezali pema ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso nde epesaka moto boyebi.

[9] Ezali kaka mibange te nde bazali na bwanya, mpe ezali kaka bampaka te nde basosolaka makambo oyo ezali sembo.

[10] Yango wana nalobi : Boyoka ngai, ngai mpe nakoloba na bino makambo oyo nayebi.

[11] Tango bino bozalaki koloba, ngai nazalaki koloba te, nazalaki koyoka makanisi na bino, wana bozalaki koluka makambo ya koloba.

[12] Nalandaki bino na bokebi nyonso ; moko te kati na bino amoni mabe ya Yobo, moko te kati na bino alongi makanisi ya Yobo.

[13] Boloba te : ‹ Tomoni bwanya ; Nzambe kaka nde akoki kolonga ye, kasi moto te. ›

[14] Lokola Yobo alobaki maloba na ye epai na ngai te, ngai mpe nakosalela makanisi na bino te mpo na kozongisela ye eyano.

[15] Bayoki soni, batikali ata na liloba moko te ya koloba, makambo ya koloba esili bango na minoko !

[16] Boni, nasengeli sik’oyo kozela, awa bazangi maloba to basuki wana mpe bakangi minoko ?

[17] Ngai mpe nakoloba sik’oyo, nakoloba makambo oyo nayebi.

[18] Lokola maloba ebele etondi kati na ngai, motema na ngai ezali kopela lokola moto.

[19] Kati na ngai, nazali lokola mbeki ya vino oyo ezali kotoka, lokola mbeki ya vino ya sika oyo ekomi pene ya kopasuka.

[20] Nakoloba mpo ete motema na ngai ekita, nakofungola bibebu na ngai mpo ete nayanola.

[21] Nakopona bilongi te, nakobondela mpe moto moko te ;

[22] pamba te, soki nayebaki kobondela bato, Mokeli na ngai alingaki kolongola ngai mbala moko.

Yobo — Chapters