[1] Yawe ayanolaki Yobo kati na mopepe makasi :
[2] « Nani azali kobebisa mabongisi na ngai na maloba ezanga tina ?
[3] Lata mokaba na yo lokola elombe mobali ; nakotuna yo mituna mpe okoyanola ngai.
[4] Ozalaki wapi tango ngai nasalaki mabele ? Yebisa ngai soki ozali mayele.
[5] Nani akataki mondelo na yango, oyebi ye ? Nani amekaki molayi na yango na singa ?
[6] Makolo ya makonzi na yango evandi likolo ya nini ? Nani atiaki libanga na yango ya songe,
[7] tango minzoto ya tongo ezalaki koyemba elongo mpe tango bana na Nzambe bazalaki koganga na esengo ?
[8] Nani akangaki ebale monene na bikuke ya makasi tango yango ebimaki wuta na mabele,
[9] tango nakomisaki mapata elamba na yango, mpe molili, singa ya kokangela yango,
[10] tango natielaki yango bandelo, tango natielaki yango bikuke ya makasi,
[11] tango nalobaki : ‹ Okosuka kino awa, kasi mosika te ; awa nde ekosukela mbonge ya lolendo na yo ? ›
[12] Boni, osili kopesa tongo mitindo to osili kolakisa tongo-tongo esika na yango,
[13] mpo ete esimba bandelo ya mokili mpe ebimisa bato mabe ?
[14] Mabele ebongwani lokola potopoto oyo batia kashe, mpe nyonso emonani lokola elatisami elamba.
[15] Bazangisi bato mabe pole mpe babuki loboko oyo etombwami mpo na kosala mabe.
[16] Osila kokoma kino na etima ya ebale monene ? Osila kotambola na se ya libulu ya molili ?
[17] Boni, basila kolakisa yo bikuke ya kufa ? Osila komona bikuke ya elilingi ya kufa ?
[18] Miso na yo esila komona kino na bitando monene ya mokili ? Loba yango soki oyebi makambo oyo nyonso.
[19] Wapi nzela oyo ememaka na pole ? Bongo molili ezalaka wapi
[20] mpo ete omema yango na bisika na yango mpe oyeba banzela oyo ememaka na esika oyo evandaka ?
[21] Solo, oyebi yango malamu, pamba te osilaki kobotama mpe motuya ya mikolo na yo ezali ebele.
[22] Boni, osila kokoma na esika oyo babombaka mvula ya pembe mpe na esika oyo babombaka mvula ya mabanga ?
[23] Nabombaki yango mpo na tango ya pasi mpe mpo na mikolo ya bitumba.
[24] Na nzela nini pole ebimaka mpe mopepe ya ngambo ya este epanzanaka ?
[25] Nani atimola nzela mpo na mvula makasi, nani apasola nzela mpo na mokalikali ya bakake
[26] mpo na konokisa mvula na esika oyo ezanga bato, na esika ya esobe oyo bato bavandaka te,
[27] mpo na kosopa mayi na bisika oyo ezanga bato mpe ekawuka, mpe mpo na kobotisa matiti ya mobesu ?
[28] Boni, mvula ezali nde na tata ? Nani abotaki matanga ya mamwe ?
[29] Libumu ya nani ebotaki mayi ya libanga ? Nani abotaki londende oyo ewutaka na likolo ?
[30] Tango nini mayi ekomaka libanga mpe likolo ya mayi ya mozindo ekomaka libanga ?
[31] Okoki kokanga na singa Minzoto sambo esika moko to kofungola basinga ya Minzoto minei ?
[32] Okoki kobimisa bilembo ya Zodiake na tango na yango mpe kokamba Ngombolo elongo na bana na yango ?
[33] Oyebi mibeko ya likolo ? Okolonga kokokisa bokonzi na yango na mokili ?
[34] Okoki kotombola mongongo na yo na mapata mpo ete mayi ebele ezipa yo ?
[35] Okoki kotinda bakake ete ebima na banzela na yango mpe eloba na yo : ‹ Tala biso oyo ? ›
[36] Nani atia bwanya na motema ya moto to nani apesa soso mayele ?
[37] Nani azali na bwanya mpo na kotanga mapata mpe kosopa mayi ya nzungu ya likolo
[38] mpo ete putulu etiola elongo lokola ebende oyo enyangolami na moto mpe mpo ete maboke ya mabele ekangama esika moko ?
[39] Boni, yo nde okokoka koboma nyama mpo na nkosi ya mwasi mpe kosilisa nzala ya bana na yango
[40] tango elalaka kati na mabulu na yango mpe emilengelaka na se ya banzete ya makasa ebele ?
[41] Nani abongiselaka yanganga bilei tango bana na yango egangaka epai ya Nzambe mpe tango eyengaka-yengaka mpo na kozanga bilei ?