[1] Miso na ngai emonaki makambo oyo nyonso, matoyi na ngai eyokaki yango, mpe nasosoli yango malamu.
[2] Nayebi makambo nyonso oyo bino boyebi, boleki ngai na eloko moko te.
[3] Kasi nalingi nde koloba na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso mpe kobundela likambo na ngai liboso ya Nzambe.
[4] Pamba te bino, bozali kobongisa lokuta, bozali lokola minganga oyo bayebi mosala malamu te.
[5] Soki bovandaki ata kimia, bolingaki ata komonana bato ya bwanya.
[6] Yoka sik’oyo maloba na ngai, yoka kosamba ya bibebu na ngai.
[7] Boni, bozali kokotela Nzambe na nzela ya lokuta mpe ya maloba ya solo te ?
[8] Bolingi kolakisa ete bozali na ngambo na Ye ? Bolingi kobundela Nzambe ?
[9] Bokosepela soki aluki koyeba makanisi ya mitema na bino ? Bokanisi ete bokoki kokosa Ye ndenge bakosaka bato ?
[10] Akopamela bino solo soki amoni ete, na se ya mitema na bino, boponaka-ponaka bilongi.
[11] Boni, bokozala ata na somo ya lokumu na Ye te ? Kolenga ekokweyela bino te ?
[12] Pamba te maloba na bino ekokani na putulu, mpe makanisi na bino ezali lokola mabele ya bikeko.
[13] Botika makelele mpe botika ngai naloba ! Oyo ekoya eya !
[14] Mpo na nini nandima kokufa mpe nasakanela bomoi na ngai ?
[15] Ata soki abomi ngai, nakozala kaka na elikya na Ye, nakobundela solo nzela na ngai liboso na Ye.
[16] Yango kutu nde ekozala lobiko na ngai, pamba te moto moko te oyo azangi koyeba Nzambe akoki koya liboso na Ye.
[17] Boyoka maloba na ngai malamu ; tika ete matoyi na bino eyoka malamu makambo oyo nazali koloba !
[18] Sik’oyo, namibongisi mpo na kobundela likambo na ngai, nayebi ete nakolonga na kosambisama.
[19] Nani akoki kofunda ngai ? Soki te, nakokanga monoko mpe nakokufa.
[20] Oh Nzambe, pesa ngai kaka biloko mibale, mpe nakobombama te liboso na Yo :
[21] longola loboko na Yo likolo na ngai, mpe tika kobangisa ngai na somo na Yo.
[22] Bongo benga ngai, mpe nakoyanola ; to tika ngai naloba, mpe Yo okoyanola ngai.
[23] Mabe mpe masumu boni nasali liboso na Yo ? Talisa ngai mbeba mpe masumu na ngai.
[24] Mpo na nini obombi elongi na Yo mpe ozali kozwa ngai lokola monguna na Yo ?
[25] Olingi kaka kotungisa lokasa oyo mopepe ezali komema ? Olingi kaka kolandela lititi oyo ekawuka ?
[26] Pamba te okomaka makambo mabe na tina na ngai mpe okomisi ngai mokitani ya masumu ya bolenge na ngai.
[27] Okangi makolo na ngai na minyololo ya bibende, ozali kokengela malamu lolenge na ngai ya kotambola mpe kolandela bisika nyonso oyo natiaka bilembo ya matambe na ngai.
[28] Moto apola penza boye lokola eloko ya kopola, lokola elamba oyo balie na banselele !