Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 4:16

[1] Yobo azongisaki :

[2] « Solo, bozali penza bato ; tango bokokufa, bwanya mpe ekokufa elongo na bino !

[3] Kasi atako bongo, ngai mpe nazali mayele lokola bino, boleki ngai na eloko te. Nani ayebi te makambo wana nyonso ?

[4] Nakomi eloko ya kotiola na miso ya baninga na ngai, ngai oyo nazali kobelela Nzambe mpo ete ayanola ngai ; moto ya sembo, moto ya alima, ye nde akomi eloko ya kotiola !

[5] Bato ya esengo basekaka bato oyo bazali na pasi, babetaka bato oyo batepaka-tepaka kisambeti.

[6] Bandako ya bato ya mobulu ezalaka na kimia, mpe bato oyo batombokelaka Nzambe, oyo bamonaka makasi na bango lokola Nzambe, bango nde babatelamaka.

[7] Kasi tuna nyama ya zamba, ekoteya yo ; tuna ndeke ya likolo, ekolakisa yo ;

[8] loba na mabele, ekoteya yo ; to tika ete mbisi ya ebale monene epesa yo sango.

[9] Kati na yango, ekelamu nini eyebi te ete loboko ya Yawe nde esalaki nyonso wana ?

[10] Bomoi ya bikelamu nyonso mpe pema ya bato nyonso ezali kati na loboko na Ye.

[11] Boni, litoyi emekaka maloba te ndenge lolemo emekaka bilei ?

[12] Bwanya ezalaka kati na bampaka te ? Bomoi ya molayi epesaka mayele te ?

[13] Bwanya mpe makasi ezali epai ya Nzambe, toli mpe mayele ezali ya Ye.

[14] Bakokoka te kotonga lisusu oyo Ye asili kobebisa, bakokoka kokangola te moto oyo Ye asili kokanga.

[15] Soki akangi mayi, bokawuki ekotaka ; kasi soki afungoli yango, mokili ezindaka.

[16] Makasi mpe elonga ezali ya Ye ; moto oyo basili kokosa mpe moto oyo akosi, bango mibale bazali ya Ye.

[17] Amemaka bapesi toli na bowumbu mpe akomisaka basambisi bato ya maboma ;

[18] afungolaka minyololo ya bakonzi mpe akangaka liputa na baloketo na bango ;

[19] amemaka Banganga-Nzambe na bowumbu mpe akweyisaka bato oyo bavanda kala na bokonzi ;

[20] akangaka minoko ya bato oyo balobaka malamu, alongolaka mikolo bososoli ;

[21] asopelaka bakonzi soni, abotolaka bibundeli ya bato ya makasi ;

[22] abimisaka na pwasa, makambo ya sekele, makambo oyo ezali kati na molili, mpe abimisaka na pole bililingi oyo eleki mwindo ;

[23] atombolaka bikolo mpe abebisaka yango, akomisaka minene mindelo ya bikolo mpe apanzaka yango ;

[24] alongolaka makanisi ya bakonzi ya bikolo mpe asalaka ete batambola kati na bisobe oyo ezanga nzela

[25] mpo ete batepatepa kati na molili, na kozanga pole ; mpe asalaka ete batepatepa lokola moto alangwe masanga.

Yobo — Chapters