Listen to this chapter • 1:10
[1] Bilidadi, moto ya Shuwa, azwaki maloba mpe alobaki :
[2] « Bokonzi mpe somo ezali ya Nzambe ; atiaka kimia na bisika na Ye ya likolo.
[3] Boni, bakoki kotanga mampinga na Ye ya lola ? Na likolo ya nani pole ya Nzambe engengaka te ?
[4] Ndenge nini moto akoki kozala sembo na miso ya Nzambe ? Ndenge nini moto oyo abotami na mwasi akoki kozala peto ?
[5] Soki kutu sanza ezali kongenga te, mpe minzoto ezali peto te, na miso na Ye,
[6] toloba nini mpo na moto oyo azali se mutsopi, mpo na mwana na moto oyo azali kaka nyama moke ya pamba ! »