Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 5:21

[1] Oyebi tango nini bantaba ya ngomba ebotaka ? Osila komona ndenge mboloko ebotaka ?

[2] Osila kotanga basanza oyo ewumelaka na zemi ? Oyebi tango oyo ebotaka ?

[3] Ekogumbama, ekobota bana na yango mpe ekolongwa na pasi na yango ya kobota.

[4] Bana na yango ekozwa makasi, ekokola na libanda, ekokende mosika mpe ekozonga lisusu te.

[5] Nani akangoli ane ya zamba ? Nani apesi yango bonsomi ?

[6] Ngai nde napesi yango esobe lokola ndako, mpe mabele ya mungwa lokola esika ya kovanda.

[7] Esekaka makelele ya bingumba mpe eyokaka te mongongo ya motambolisi ya mpunda.

[8] Etambolaka na ngomba mpo na koluka bilei mpe elukaka na bokebi matiti nyonso ya mobesu.

[9] Mpakasa ekoki kondima kosalela yo ? Ekoki kolekisa butu na elielo na yo ya banyama ?

[10] Okoki kokanga mpakasa na singa ya ebende oyo ebalolaka mabele ? Ekoki kolanda yo mpo na kotondisa mabwaku na mabele ?

[11] Okotia solo elikya na yo kati na yango, mpo ete makasi na yango ezali monene ? Okotikela yango mosala na yo ?

[12] Okotiela yango solo motema mpo na komemela yo bambuma mpe kosangisa yango na etutelo na yo ?

[13] Mapapu ya maligbanga efungwamaka na esengo nyonso, kasi, boni, lipapu mpe nsala na yango ekokani na oyo ya nkongi ?

[14] Maligbanga ebwakaka maki na yango na mabele mpe etikaka yango ete ezwa moto ya mabele,

[15] kasi ebosanaka ete lokolo ekoki kopanza yango mpe banyama ya zamba ekoki konyata-nyata yango.

[16] Enyokolaka bana na yango makasi lokola nde ezali bana na yango te, emonaka na yango motema pasi te lokola nde esali mosala ya mpunda,

[17] pamba te Nzambe apimeli yango bwanya mpe apesi yango mayele te.

[18] Nzokande soki etelemi mpe ebandi kopota mbangu, ekoseka ata mpunda mpe motambolisi na yango.

[19] Boni, yo nde moto opesa mpunda makasi mpe olatisa kingo na yango pwale ya milayi ?

[20] Yo moto opumbwisaka yango lokola libanki ? Lolendo ya mongongo kitoko na yango epesaka somo.

[21] Mpunda enyataka na makasi nyonso maboke ya mabele, esepelaka na makasi na yango mpe ekendaka liboso ya bibundeli.

[22] Eyokaka somo te, ebangaka eloko moko te, ezongaka sima te liboso ya mopanga,

[23] tango saki ya mbanzi eninganaka likolo na yango elongo na likonga oyo ezali kopela moto mpe mopanga.

[24] Epumbwaka na kanda mpe epanzaka mabele, evandaka kimia te soki kelelo ebeti.

[25] Soki kelelo ebeti, egangaka : ‹ Ah ! › Na mosika, eyokaka solo ya bitumba, koganga ya bakambi ya basoda mpe makelele ya bitumba.

[26] Boni, ezali na mayele na yo nde kombekombe epumbwaka mpe etandaka mapapu na yango na ngambo ya sude ?

[27] Na mitindo na yo nde mpongo emataka likolo mpe esalaka zala na yango na likolo ?

[28] Evandaka mpe etongaka ndako kati na mabanga, na esika ya kaka, na songe ya libanga.

[29] Wuta na likolo, emonaka nyama ya kolia, miso na yango emonaka na mosika.

[30] Bana na yango emelaka makila. Esika ebembe ezali, mpongo ezali wana. »

Yobo — Chapters