[1] Yawe ayanolaki Yobo :
[2] « Boni, moto oyo atiaka tembe na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akoki koteya Ye ? Tika ete oyo azali koswanisa Nzambe ayanola Ye ! »
[3] Yobo azongiselaki Yawe :
[4] « Tala ngai, nazali se ekelamu ya pamba, eyano nini nakoki kopesa Yo ? Natie loboko na ngai na monoko.
[5] Nalobaki mbala moko, kasi nakoyanola lisusu te ; na mbala ya mibale, nakobakisa lisusu eloko te. »
[6] Yawe alobaki na Yobo wuta na mopepe makasi :
[7] « Kanga mokaba na loketo na yo lokola elombe mobali ; nakotuna yo mituna, mpe okoyanola ngai.
[8] Olingi kotiola bosembo na ngai ? Okani kokweyisa ngai mpo ete yo moko omilongisa ?
[9] Ozali na loboko lokola oyo ya Nzambe ? Mongongo na yo ekoki konguluma makasi lokola oyo ya Ye ?
[10] Lata nkembo mpe kongenga, milatisa lokumu mpe monene !
[11] Sopa nguya ya kanda na yo likolo ya bato, tala bato nyonso ya lolendo liboso na yo mpe kitisa bango !
[12] Tala bato nyonso ya lolendo, yokisa bango soni ! Nyata-nyata bato mabe na esika oyo bazali.
[13] Kunda bango nyonso kati na putulu, zipa bilongi na bango na esika ya kobombama.
[14] Boye, ngai moko nakopesa yo lokumu, pamba te loboko na yo ya mobali ekoki mpo na kobikisa yo.
[15] Tala ngubu : nakelaki yango ndenge nakelaki yo, kasi eliaka kaka matiti lokola ngombe.
[16] Tala makasi oyo ezali kati na loketo na yango, nguya oyo ezali kati na misuni ya libumu na yango !
[17] Ekembisaka mokila na yango lokola nzete ya sedele ; misisa ya mipende na yango elingama-lingama ;
[18] mikuwa na yango ezali lokola bibende ya bronze ; mipanzi na yango ezali lokola biteni ya bibende.
[19] Ezali ekelamu ya liboso ya Nzambe, kasi Mokeli na yango atieli yango mopanga pene.
[20] Ngomba ezali kopesa yango matiti ya kolia, esika oyo banyama nyonso ya zamba esakanaka.
[21] Elalaka na se ya banzete ya mike-mike, na se ya matiti oyo ezalaka pembeni ya mayi mpe na potopoto.
[22] Banzete ya mike-mike ebombaka yango na se ya elili na yango, banzete ya pepiliye ezingeli yango.
[23] Soki mayi ya ebale etomboki, yango ebangaka te ; ata mayi ya Yordani esopaneli yango na monoko, evandaka kaka kimia.
[24] Boni, moto akoki kokanga yango na motambo na tango ezali kotala to kotobola yango zolo na ndobo, mpo na kobenda yango ?
[25] Boni, okoki koloba ngando na ndobo ? Okoki kokanga lolemo na yango na singa ?
[26] Okoki kokanga yango singa ya kekele na zolo ? Okoki kotobola mbanga na yango na ndobo ?
[27] Boni, ekobondela yo mingi ? Ekoloba na yo maloba ya boboto ?
[28] Ekoki kosala boyokani elongo na yo mpo ete ekoma mowumbu na yo mpo na libela ?
[29] Okoki kosakana na yango lokola ndeke ? Okoki kokanga yango na singa mpo na kosepelisa bana na yo ya basi ?
[30] Boni, lisanga ya balobi mbisi bakoki kosala na yango mombongo ? Bakoki kokabola yango epai ya bateki ?
[31] Okoki kotobola mokongo na yango na makonga ? Okoki kotobola moto na yango na ndobo oyo bakangelaka bambisi ?
[32] Tia loboko na yo na likolo na yango : soki okanisi etumba oyo okutani na yango, okozongela lisusu te kotia loboko na yo na likolo na yango.