Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 5:16

[1] Tsofari, moto ya Naama, azwaki maloba mpe alobaki :

[2] « Makanisi na ngai ezali kotinda ngai ete nayanola, nakoki kovanda nye te, pamba te motema na ngai ekomi likolo-likolo.

[3] Nazali koyoka maloba mabe, maloba oyo eyokisi ngai soni ! Kasi mayele na ngai elakisi ngai maloba ya kozongisa.

[4] Solo, oyebi malamu ete wuta kala, wuta tango batia moto na likolo ya mabele,

[5] elonga ya bato mabe ezalaka ya tango moke, mpe esengo ya moto oyo azangi boyengebene ewumelaka kaka mwa tango moke.

[6] Ata molayi na ye emati kino likolo mpe moto na ye etuti mapata,

[7] akobebisama libela lokola nyei na ye, mpe bato oyo bakomona ye bakoloba : ‹ Azali wapi ? ›

[8] Abungaka lokola ndoto, mpe bakomona ye lisusu te, alimwaka lokola na ndoto ya butu.

[9] Liso oyo ezalaki kotala ye ekomona ye lisusu te, esika oyo azalaki kovanda ekomona ye lisusu te,

[10] bana na ye basengeli kofuta lomande epai ya babola, maboko na ye ekozongisa bozwi oyo abotolaki,

[11] mikuwa na ye oyo ezalaki makasi na bolenge ekolala elongo na ye kati na putulu.

[12] Soki mabe ezali sukali na monoko na ye mpe abombi yango na se ya lolemo na ye,

[13] soki ameki elengi na yango mpe atiki yango te, soki abombi yango na se ya minu na ye,

[14] bilei na ye ekobongwana kati na libumu na ye, ekokoma lokola ngenge ya nyoka kati na ye.

[15] Amelaki na pamba bozwi ebele, asengeli kosanza yango ; Nzambe akofutisa ye yango.

[16] Akofiba ngenge ya nyoka, lolemo ya etupa ekoboma ye.

[17] Akomona lisusu te mayi mike, miluka, bibale, mayi oyo etiolaka makasi elongo na mafuta ya nzoyi mpe miliki ;

[18] akozongisa bambuma ya mosala na ye mobimba, akomela ata moko te, akotikala kosepela te na litomba oyo azwaki na mombongo na ye.

[19] Pamba te anyokolaki babola mpe atikaki bango lokola bato bazangela, abotolaki ndako ya bato na esika ya kotonga ndako na ye moko.

[20] Solo, lokoso na ye ya kozwa mingi ekosila te, akoki komibikisa te na nzela ya bomengo na ye.

[21] Ayebaki te kopekisa lokoso ya libumu na ye, yango wana bomengo na ye mpe ekowumela te.

[22] Wana azali kati na bomengo, pasi ekokomela ye, kilo nyonso ya pasi ekokweyela ye.

[23] Wana azali kotondisa libumu na ye, Nzambe akosopela ye kanda makasi na Ye, mpe ekonokela ye lokola bilei.

[24] Ata akimi liboso ya ebundeli ya ebende, mbanzi ya bronze ekotobola ye ;

[25] soki abimisi songe ya mbanzi yango na libale na ye elongo na makila ya mbuma-mbuma, somo ekoyela ye.

[26] Molili makasi ezali kozela libula na ye, moto makasi oyo moto apelisi te ekozikisa ye elongo na biloko oyo ekotikala kati na ndako na ye.

[27] Likolo ekobimisa polele mabe na ye, mabele ekotelemela ye ;

[28] mayi ekomema ndako na ye mpe biloko nyonso ya ndako na ye, na mokolo ya kanda ya Nzambe.

[29] Yango nde lifuti oyo Nzambe abongisi mpo na moto mabe, libula oyo Nzambe alaki ye. »

Yobo — Chapters