Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 4:07

[1] Yobo akobaki koloba :

[2] « Na Kombo ya Nzambe oyo awangani bosembo na ngai, na Kombo ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso oyo atungisi motema na ngai,

[3] wana ngai nazali nanu na bomoi, mpe pema ya Nzambe ezali nanu na zolo na ngai,

[4] bibebu na ngai ekoloba mabe te, mpe lolemo na ngai ekobimisa lokuta te.

[5] Ekozala penza mabe koleka soki ngai nalongisi bino ! Kino tango nakokufa, nakotika te kotatola boyengebene na ngai,

[6] nakobatela bosembo na ngai, nakotika yango te ; motema na ngai ekotikala kosambisa ngai mokolo moko te.

[7] Tika ete bayini na ngai bazala lokola bato mabe, mpe banguna na ngai, lokola bato bazangi bosembo !

[8] Elikya nini moto mabe azali na yango tango Nzambe azwi bomoi na ye ?

[9] Boni, Nzambe ayokaki koganga na ye tango pasi ekomelaki ye ?

[10] Boni, akosepela penza na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso to akobelela lisusu Nzambe tango nyonso ?

[11] Nakoteya bino makambo oyo etali nguya ya Nzambe, nakobomba te nzela ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.

[12] Bino nyonso, boyebi yango malamu ! Bongo mpo na nini bilobaloba ya boye ?

[13] Tala lifuti oyo Nzambe abongiseli moto mabe, libula oyo moto ya mobulu azwaka epai ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso :

[14] Ata soki bana na ye ya mibali bakomi ebele, mopanga ezali lifuti na bango, bakitani na ye bakokufa na nzala,

[15] bokono oyo ebomaka ekoboma bato na ye, oyo bakotikala na bomoi, mpe basi na bango oyo bakufisa mibali bakolela bango te.

[16] Ata soki asangisi palata lokola putulu mpe bilamba lokola mipiku ya mabele,

[17] nyonso oyo abongisi, moto ya sembo nde akolata yango, mpe bato oyo basali mabe te nde bakokabola palata na ye.

[18] Ndako oyo atongi ezali makasi te lokola ndako ya limpulututu, lokola ndako ya matiti oyo mokengeli atongaka.

[19] Akokufa na bozwi, kasi akosala na yango eloko moko te ; tango akofungola miso, bozwi na ye nyonso ekozala lisusu te.

[20] Somo ekozwa ye lokola mayi ya mpela ; na butu, mopepe makasi ekopikola ye na mbalakata.

[21] Wuta na ngambo ya este, mopepe makasi ekomema ye, mpe akei libela, ekopikola ye na esika na ye.

[22] Bakobwakela ye makonga na mawa te, ata azali kosala makasi ya kokima loboko ya moto oyo azali kobwakela ye yango.

[23] Bakobetela libebi na ye maboko, mpe bakotiola ye na piololo wuta na ndako na ye moko. »

Yobo — Chapters