[1] Bongo Eliwu alobaki :
[2] « Boni, okanisi ete yango ezali sembo ? Olobi : ‹ Nazali sembo liboso ya Nzambe. ›
[3] Nzokande, ozali koloba : ‹ Nakozwa nini, litomba nini nakozwa soki nasali masumu te ? ›
[4] Nalingi kopesa yo eyano, yo elongo na baninga na yo.
[5] Tombola miso na likolo mpe tala ; mona ndenge mapata ezali likolo na yo.
[6] Soki osali masumu, ekosala Nzambe nini ? Soki masumu na yo ezali ebele, ekosala Ye nini ?
[7] Soki ozali sembo, okopesa Ye nini to akozwa nini na loboko na yo ?
[8] Mabe na yo ekokomela kaka bazalani na yo, bosembo na yo ezali na litomba kaka epai ya bana na bato.
[9] Bato bazali kolela na se ya mokumba ya minyoko, bazali koganga na se ya motema makasi ya bato minene.
[10] Kasi moto moko te azali koloba : ‹ Nzambe Mokeli na ngai, Ye oyo apesaka banzembo ya esengo na butu,
[11] Ye oyo ateyaka biso koleka banyama ya mokili mpe akomisaka biso mayele koleka bandeke ya likolo, azali wapi ? ›
[12] Ata bagangi, Nzambe akoyanola te, mpo na lolendo ya bato mabe.
[13] Pamba te, Nzambe ayokaka te maloba na bango ya pamba, Nkolo-Na-Nguya-Nyonso azalaka ata na bokebi na yango te.
[14] Nzokande, yo ozali komeka koloba ete ozali komona Ye te, ete ozwi nanu eyano te na kolela na yo epai na Ye.
[15] Mpe sik’oyo, soki kanda ya Nzambe eyei nanu likolo na yo te mpe soki Ye azali nanu kobosana maloba na yo ya soni,
[16] elingi koloba ete yo, Yobo, ofungoli monoko na yo kaka na pamba mpe otondisi yango na maloba ya bozoba. »