Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 4:37

[1] Yobo akobaki koloba :

[2] « Ah ! Soki nakokaki kozala lisusu ndenge nazalaki na basanza oyo eleki, ndenge nazalaki na mikolo oyo Nzambe azalaki kobatela ngai,

[3] tango mwinda na Ye ezalaki kongenga na moto na ngai, mpe tango, na pole na Ye, nazalaki kotambola kati na molili.

[4] Ah ! Soki nakokaki kozala lisusu ndenge nazalaki na mikolo oyo nazalaki nanu na makasi, tango bolingo ya Nzambe ezalaki kopambola ndako na ngai,

[5] tango Nkolo-Na-Nguya-Nyonso azalaki nanu elongo na ngai bana mibali na ngai bazingelaki ngai,

[6] tango nzela na ngai etondisamaki na miliki mpe libanga ezalaki kosopa mafuta ya olive mpo na ngai !

[7] Tango nazalaki kokende na ekuke ya mboka mpe nazalaki kotia kiti na ngai na esika oyo bato ebele bakutanaka,

[8] bilenge bazalaki komona ngai mpe bazalaki kobombama, mibange bazalaki kotelema,

[9] bakambi bazalaki kozanga maloba mpe kozipa minoko na bango na maboko,

[10] bato ya lokumu bazalaki kokitisa mingongo na bango mpe lolemo na bango ezalaki kokangama na minoko na bango.

[11] Moto nyonso oyo azalaki koyoka ngai azalaki koloba ete nazali moto ya esengo, mpe bato nyonso oyo bazalaki komona ngai bazalaki kotatola mpo na ngai ;

[12] pamba te nazalaki kosunga babola oyo bazalaki kosenga lisungi, mpe mwana etike oyo azangi moto oyo akosunga ye.

[13] Moto oyo akomaki pene ya kokufa azalaki kopambola ngai, mpe nazalaki kopesa esengo na motema ya mwasi oyo akufisa mobali.

[14] Nazalaki kolata bosembo lokola elamba ; bosembo ezalaki elamba na ngai mpe kitendi na ngai ya kokanga na moto.

[15] Nazalaki miso ya mokufi miso mpe makolo ya mokakatani ;

[16] nazalaki tata ya moto oyo akelela, nazalaki kobundela moto oyo nayebi te ;

[17] nabukaki mbanga ya moto mabe mpe nabotolaki bato oyo akangaki na minu na ye.

[18] Nazalaki kokanisa : ‹ Nakokufa kati na ndako na ngai moko sima na mikolo ebele lokola zelo.

[19] Misisa na ngai ekoluka mayi, mpe mayi oyo ezalaka na matiti ekovanda butu mobimba na bitape na ngai.

[20] Lokumu na ngai ekozongisela ngai esengo, ata tolotolo ekokoma ya sika na loboko na ngai. ›

[21] Bato bazalaki koyoka ngai na bokebi, bazalaki na kimia mpo na koyoka toli na ngai.

[22] Sima na ngai koloba, bazalaki na liloba ya kozongisa te ; maloba na ngai ezalaki kokota na esengo na matoyi na bango.

[23] Bazalaki kozela ngai ndenge bazelaka mvula, mpe bazalaki komela maloba na ngai lokola mvula ya suka.

[24] Soki nasekisi bango, bazalaki kondima te ; kongenga ya elongi na ngai ezalaki na motuya mpo na bango.

[25] Naponaki nzela mpo na bango mpe navandaki lokola mokonzi na bango ; nazalaki kokonza bango lokola mokonzi kati na mampinga na ye, nazalaki lokola moto oyo azalaki kolendisa bato ya mawa. »

Yobo — Chapters