[1] Moto oyo abotama na mwasi azalaka kaka na mikolo moke oyo mpe etonda na pasi.
[2] Akolaka mpe akawukaka lokola fololo, awumelaka te lokola elili ya lipata oyo elekaka.
[3] Olingi kaka kolandela ekelamu ya boye ? Olingi kaka komema ye liboso na Yo mpo na kosambisa ye ?
[4] Nani akoki kobimisa bopeto kati na mbindo ? Moko te !
[5] Mikolo ya moto ekatama ; okata motango ya basanza na ye mpe otia mondelo oyo akoki koleka te.
[6] Longola miso na Yo mosika na ye mpe tika ye, ye moko, kino tango akozwa lifuti ya mosala na ye lokola moto oyo asalaka kaka mpo na lifuti.
[7] Nzete ezalaka kutu na mwa elikya : ata bakati yango, ebimaka lisusu mpe ebotaka bitape ya sika ;
[8] misisa na yango ekoki konuna na se ya mabele, mpe eteni na yango oyo etikalaka ekoki kokufa kati na mabele,
[9] nzokande soki kaka ezwi mayi, ekobimisa mito mpe ekobota bitape lokola nzete ya sika.
[10] Kasi moto akufaka mpe aninganaka lisusu te, akataka motema mpe azalaka lisusu na bomoi te.
[11] Ndenge mayi esilaka na liziba to ndenge mayi ekawukaka,
[12] ndenge wana mpe moto akufaka mpe atelemaka lisusu te, akolamuka lisusu te mpe bakoki lisusu kolamusa ye te, tango nyonso likolo ekozala.
[13] Soki kaka obombaki ngai na se ya bakufi mpe otikaki ngai kuna kino kanda na Yo esila ! Soki kaka okatelaki ngai tango mpo ete, na sima na yango, okanisa ngai lisusu !
[14] Nzokande, soki moto akufi, boni, akoki lisusu kozala na bomoi ? Nakozela kino lolenge na ngai ebongwana.
[15] Okobenga ngai, mpe ngai, nakondima ; okozala na posa makasi ya ekelamu ya maboko na Yo.
[16] Solo penza, okotanga makolo na ngai, kasi okolandela lisusu masumu na ngai te.
[17] Mabe na ngai ekokangama kati na saki, mpe okozipa masumu na ngai.
[18] Kasi, ndenge ngomba esilaka mpe ekweyaka, ndenge libanga elongwaka na esika na yango,
[19] ndenge mayi eliaka mabanga, ndenge mayi oyo etiolaka ememaka mabele, ndenge wana mpe obebisaka elikya ya moto.
[20] Olongaka ye mbala moko, mpe akendaka na ye ; obebisaka elongi na ye mpe obenganaka ye.
[21] Soki bana na ye ya mibali bazwi lokumu, ayebaka na ye yango te ; soki basambwisi bango, amonaka na ye yango te.
[22] Ayokaka kaka pasi kati na nzoto na ye, mpe motema na ye esalaka kaka matanga mpo na ye moko. »