Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 4:05

[1] Boni, bomoi ya moto awa na se ezali kaka bomoi ya pasi te ? Mikolo ya bomoi na ye ezali penza mikolo ya mongamba te ?

[2] Ndenge mowumbu azelaka pio ya pokwa to ndenge mongamba azelaka makasi lifuti na ye,

[3] ngai nazwaki lokola libula, basanza ya pamba mpe babutu ya pasi na pasi.

[4] Soki kaka nalali, nakomi komituna : ‹ Tango nini nakolamuka ? › Mpe soki kaka nalamuki : ‹ Tango nini butu ekoya ? › Nalembi komitungisa tango nyonso.

[5] Nkusu mpe makwanza ezipi nzoto na ngai, poso ya nzoto na ngai ezoki-zoki bapota mpe ekomi kolumba solo.

[6] Mikolo ya bomoi na ngai ezali koleka mbangu penza koleka tonga oyo mosali bilamba asalelaka ; nakomi na suka, mpe elikya na ngai nyonso esili.

[7] Oh Nkolo, kobosana te ete bomoi na ngai ezali kaka pema ya pamba ! Miso na ngai ekomona lisusu bolamu te.

[8] Liso oyo ezali komona ngai sik’oyo ekotikala komona ngai lisusu te ; okoluka ngai, kasi nakozala lisusu te.

[9] Ndenge mapata ekendaka mpe elimwaka, ndenge wana mpe moto oyo akendaka na mboka ya bakufi azongaka lisusu te.

[10] Akozonga lisusu te na ndako na ye, mpe ndako na ye ekoyeba ye lisusu te.

[11] Yango wana, nakokanga monoko na ngai te, molimo na ngai ekoloba kaka na mawa, mpe motema na ngai ekolela kaka pasi na ngai.

[12] Boni, nakomi ebale to elima ya mayi mpo ete batiela ngai bikangiseli ?

[13] Nakanisaka ete soki nalali, mbeto na ngai ekobondisa ngai mpe pongi ekokitisa pasi na ngai ;

[14] nzokande, ozali lisusu kotungisa ngai na bandoto ya mabe mpe kobangisa ngai na bimoniseli ya somo.

[15] Malamu bafina ngai kingo mpe nakufa, pamba te kufa ezali na litomba koleka bomoi oyo.

[16] Nayini bomoi na ngai ; nawumela libela te na bomoi ! Tika ngai kimia, pamba te mikolo na ngai ezanga na yango tina.

[17] Moto azali penza nani mpo ete okanisaka ye, mpo ete olandelaka ye na bokebi,

[18] mpo ete otalaka ye tango nyonso mpe omekaka ye tango nyonso ?

[19] Mpo na nini okoki kolongola miso na Yo te likolo na ngai ? Mpo na nini okoki kotika ngai kimia te ata mpo na ngonga moke ?

[20] Oh Mokeli na ngai, soki nasali lisumu, eloko nini ngai nasali Yo ? Mpo na nini oponi kaka kobeta ngai ? Boni, nakomi mokumba mpo na Yo ?

[21] Mpo na nini ozali kolimbisa mabunga na ngai te mpe ozali kobosana masumu na ngai te ? Kala mingi te, nakokende kolala na putulu ; okoluka ngai, kasi nakozala lisusu te. »

Yobo — Chapters