[1] Kasi sik’oyo, Yobo, yoka maloba na ngai, tia matoyi mpo na koyoka maloba na ngai !
[2] Tala, nafungoli monoko na ngai, maloba na ngai ezali na songe ya lolemo.
[3] Maloba na ngai ewuti na motema ya sembo, bibebu na ngai ezali penza koloba makambo oyo ngai nayebi.
[4] Molimo ya Nzambe asalaki ngai, pema ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso epesi ngai bomoi.
[5] Boye soki okoki, yanola ngai, mibongisa mpo na komekana na ngai.
[6] Nazali kaka lokola yo liboso ya Nzambe ; ngai mpe nawutaki na putulu.
[7] Boye, somo na ngai ebangisa yo te, mpe monene ya loboko na ngai epanza yo te.
[8] Kasi olobaki na matoyi na ngai— mpe nazali nanu koyoka makelele ya maloba na yo—
[9] ‹ Nazali sembo, nasali masumu te ; nazali peto, namemi na ngai ngambo te. ›
[10] Nzokande, Nzambe amoni mbeba kati na ngai, azali kozwa ngai lokola monguna na Ye.
[11] Akangi makolo na ngai na bibende, azali kononga banzela na ngai nyonso.
[12] Kasi, kati na nyonso oyo, ngai nalobi, ozali na elonga te, pamba te Nzambe azali monene koleka moto.
[13] Mpo na nini ozali kosamba na Ye ? Alimbolaka tina ya misala na Ye epai ya moto moko te.
[14] Nzokande, Nzambe alobaka, na lolenge moko to na lolenge mosusu, kasi moto asosolaka yango te.
[15] Alobaka kati na ndoto, kati na emoniseli ya butu, tango bato bazwaka pongi makasi wana balali na mbeto ;
[16] boye, akoki kofungola matoyi ya bato mpe kobeta sete na makebisi oyo azali koloba,
[17] mpo na kotia moto mosika ya misala na ye ya mabe mpe kobatela ye na lolendo,
[18] mpo na kobatela molimo na ye mpo ete ekufa te, mpe bomoi na ye mpo ete ebebisama te na mopanga.
[19] Nzokande, moto akoki mpe, mbala mosusu, koteyama na mbeto na ye, na nzela ya kobela mpe ya minyoko ya tango nyonso kati na mikuwa na ye.
[20] Boye, azali kosepela lisusu na lipa te, mpe motema na ye ekomi koboya bilei oyo alingaka mingi.
[21] Nzoto na ye ekawuki na pamba, mpe mikuwa na ye, oyo ebombama, ebimi.
[22] Molimo na ye ezali kopusana pene ya kunda, mpe bomoi na ye, pene ya bamemi sango ya kufa.
[23] Nzokande, soki ekoki kozala ata na anjelu moko, kati na ba-anjelu nkoto moko, mpo na koyebisa na moto makambo oyo ezali sembo,
[24] tika ete asalela ye ngolu mpe aloba : ‹ Bikisa ye ete akota te kati na libulu ya kufa, nasili kofuta niongo mpo na kosikola ye, ›
[25] nzoto na ye ekokoma lisusu sembesembe lokola na tango ya bolenge na ye, ekozonga ndenge ezalaki na bomwana na ye.
[26] Akosambela Nzambe, akozwa ngolu na miso na Ye, akomona Nzambe na miso mpe akoganga na esengo. Nzambe akozwa ye lisusu lokola moto ya sembo.
[27] Boye akoyemba na miso ya bato mpe akoloba : ‹ Nasalaki masumu mpe natambolaki na bosembo te, kasi nazwi lifuti oyo nasengelaki kozwa te.
[28] Nzambe akangoli molimo na ngai na libulu ya kufa, mpe nakowumela kati na pole na esengo. ›
[29] Nzambe asalaka makambo oyo nyonso epai ya moto mbala mibale to mpe mbala misato,
[30] mpo na kolongola molimo na ye na libulu ya kufa, mpo ete pole ya bomoi ekoka kongenga likolo na ye.
[31] Yobo, fungola matoyi, vanda kimia mpe yoka ngai ! Nazali na makambo ya koloba na yo.
[32] Kasi soki ozali na likambo ya koloba, yebisa ngai yango, pesa ngai eyano, mpe ngai nakolongisa yo.
[33] Soki te, vanda kimia mpe yoka ngai, mpe ngai nakoteya yo bwanya. »