Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 5:08

[1] Elifazi, moto ya Temani, azwaki maloba mpe alobaki :

[2] « Boni, litomba nini Nzambe akoki kozwa epai ya moto ? Ezala ata moto ya bwanya, azalaka na litomba kaka mpo na ye moko.

[3] Ezala soki ozali moyengebene, litomba nini Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akoki kozwa, ata ozali kobongisa nzela na yo ya bosembo ?

[4] Boni, okanisi ete ezali mpo na boyengebene na yo nde azali kopamela yo mpe kosambisa yo ?

[5] Mabe na yo ezali monene te ? Masumu na yo eleki ndelo te ?

[6] Ozalaki koluka na pamba ndanga epai ya bandeko na yo ya mibali, ozalaki kolongola bato bilamba mpe kotika bango bolumbu,

[7] ozalaki kopesa mayi te na moto oyo azalaki na posa ya mayi, mpe ozalaki kopimela moto oyo azalaki na nzala bilei,

[8] atako ozalaki moto monene, nkolo mabele, mpe ozalaki kovanda na mabele yango lokola moto ya lokumu ;

[9] ozalaki kozongisa basi bakufisa mibali maboko pamba, mpe ozalaki kosilisa makasi ya bana bitike.

[10] Yango wana, mitambo ezingeli yo, kobebisama ya mbalakata ekomi kopesa yo somo,

[11] molili makasi ezwi yo mpe ozali kokoka komona te, mpe mpela ezipi yo.

[12] Boni, Nzambe azali te kuna na likolo, kati na Lola ? Tala ndenge nini etando ya minzoto ezali likolo koleka !

[13] Nzokande, ozali koloba : ‹ Nzambe ayebi nini ? Akoki kosambisa kati na mapata ya molili ya boye ? ›

[14] Mapata minene ezipi Ye, yango wana azali komona biso te, wana azali kotambola-tambola na etando ya Lola ?

[15] Olingi solo kotikala kaka na nzela ya kala, nzela oyo bato mabe balekelaki ?

[16] Kufa ememaki bango na mbalakata, mpe miboko na bango etiolaki na mpela.

[17] Bazalaki koloba na Nzambe : ‹ Tika biso, biso moko ! Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akosala biso nini ? ›

[18] Nzokande, Ye nde atondisaki bandako na bango na biloko ya kitoko. Yango wana, ngai, naboyaka toli ya bato mabe.

[19] Bato ya sembo bazali komona kobebisama na bango mpe bazali kosepela, bayengebene bazali koseka bango mpe bazali koloba :

[20] ‹ Solo, banguna na biso babebi, moto ezikisi bomengo na bango. ›

[21] Zongisa boyokani na yo elongo na Ye mpe luka kimia. Na nzela wana, bomengo ekoya lisusu epai na yo.

[22] Ndima malako oyo ekowuta na monoko na Ye, mpe batela maloba na Ye kati na motema na yo.

[23] Soki ozongi epai na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso, soki obengani mabe mosika ya ndako na yo, bomengo na yo ekozongela yo.

[24] Bwaka wolo na yo kati na putulu, wolo na yo ya Ofiri kati na mabanga ya lubwaku ;

[25] bongo Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akozala wolo na yo, mpe palata oyo eleki kitoko mpo na yo.

[26] Solo, okozwa esengo epai ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso mpe okotombola elongi na yo epai ya Nzambe.

[27] Okosambela Ye, Ye akoyoka yo, mpe okokokisa ndayi na yo.

[28] Makambo oyo okokana, ekosalema, mpe pole ekongenga na nzela na yo.

[29] Soki bato balembi, mpe yo olobi : ‹ Telema ! › Nzambe akobikisa bango,

[30] akokangola ata moto oyo asali mabe, akokangola ye penza mpo na bopeto ya maboko na yo. »

Yobo — Chapters