[1] Elifazi, moto ya Temani, azwaki maloba mpe alobaki :
[2] « Boni, moto ya bwanya akopesaka solo eyano na maloba ya pamba boye, maloba oyo ezanga ata tina, to alingaka kotondisa libumu na ye na mopepe ya moto oyo ewutaka na Este ?
[3] Akoki solo komilobela na maloba ezanga ata tina ? Akoki solo kosalela maloba milayi oyo ezali ata na motuya te ?
[4] Yo ozali penza kobebisa lokumu ya Nzambe okomi koboya lokumu liboso ya Nzambe.
[5] Lisumu na yo ezali kokamba monoko na yo, ozwi elobeli ya bakosi.
[6] Monoko na yo moko nde ezali komemela yo etumbu, kasi monoko na ngai te ; bibebu na yo moko nde ezali kofunda yo.
[7] Yo nde moto ya liboso oyo obotama kati na bato ? Omona moyi liboso ya bangomba mikuse ?
[8] Osila koyoka makambo oyo elobamaka kati na Likita ya Nzambe ? Bwanya ezalaka kaka epai na yo moko ?
[9] Makambo nini oyebi, oyo biso toyebi te ? Boyebi nini ozali na yango, oyo biso tozali na yango te ?
[10] Na ngambo na biso, ezali na bato ya suki pembe, bampaka, bato oyo baleki tata na yo na mibu ya mbotama.
[11] Kobondisama ya Nzambe mpe maloba ya kimia oyo bazali koloba mpo na yo, ekoki te mpo na yo ?
[12] Mpo na nini motema na yo ezali kopengwisa yo, mpe miso na yo ezali kobeta-beta ?
[13] Mpo ete obwakela Nzambe kanda na yo mpe obimisa makambo ya boye na monoko na yo ?
[14] Moto azali nani mpo ete azala peto ? Ye oyo abotami na mwasi azali nani mpo ete azala sembo ?
[15] Soki Nkolo azali kondimela basantu na Ye te, soki kutu likolo ezali peto te na miso na Ye,
[16] ekozala boni mpo na moto mabe, moto oyo abeba, oyo asalaka mabe lokola azali komela mayi ?
[17] Yoka ngai, mpe nakolimbolela yo ! Tika ete nayebisa yo makambo oyo ngai namona,
[18] makambo oyo bato ya bwanya balobaki, na kobomba ata eloko moko te kati na makambo oyo bazwaki epai ya batata na bango.
[19] Apesaki mokili epai na bango kaka tango ata mopaya moko te alekaki kati na bango.
[20] Na bomoi na ye mobimba, na mibu oyo bakata mpo na bomoi na ye, moto mabe anyokwamaka.
[21] Lokito ya somo etondisaka matoyi na ye, bato ya mobulu babimelaka ye ata na tango ya kimia.
[22] Azalaka na elikya te ya kobima na molili, mpe mopanga ezelaka ye.
[23] Ayengaka-yengaka mpo na koluka lipa, kasi akozwela yango wapi ? Ayebaka ete mokolo ya molili ezelaka ye.
[24] Pasi mpe mawa ebangisaka ye, ekomelaka ye lokola mokonzi oyo amibongisi mpo na bitumba,
[25] mpo ete asembolaka loboko na ye mpo na kobundisa Nzambe, atelemelaka Nkolo-Na-Nguya-Nyonso,
[26] akimaka epai na Ye, moto etala na se, amibombaka na sima ya banguba minene.
[27] Elongi na ye ekotonda mafuta, loketo na ye ekokoma monene ;
[28] akovanda na engumba ebeba, kati na bandako oyo bato bakima, bandako oyo ekoma pene ya kokweya ;
[29] akotikala kokoma mozwi te, pamba te bozwi na ye ekowumela te, bomengo na ye ekopanzana te kati na mokili mobimba ;
[30] akokoka kokima molili te, moto ekokawusa mandalala na ye mpe akokima ata pema na ye moko.
[31] Tika ete atia elikya na ye na lokuta te, pamba te akoyokisama soni mpe akozwa libebi lokola lifuti.
[32] Ekokokisama liboso ete akufa, ndenge lindalala ekawukaka mpo na kozanga mayi na yango
[33] to lokola nzete ya vino oyo ekweyisi bambuma na yango, wana ezali nanu mobesu to lokola nzete ya olive oyo ekweyisi fololo na yango.
[34] Solo, libota ya moto mabe ekofuluka te, mpe moto ekozikisa ndako na ye mpo na mabe na ye moko.
[35] Pamba te moto nyonso oyo azalaka na makanisi mabe kati na ye abotaka kaka pasi ; mabe oyo ekolaka kati na ye ememelaka ye moko libebi. »