Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 4:46

[1] Sima na yango, Yobo afungolaki monoko na ye mpe alakelaki mokolo ya mbotama na ye mabe.

[2] Yobo alobaki :

[3] « Tika ete mokolo ya mbotama na ngai, mpe butu oyo elobaki : ‹ Mwana mobali moko abotami, › ekufa !

[4] Tika ete mokolo yango ebongwana molili ! Tika ete, wuta na likolo, Nzambe akanisa yango lisusu te ! Tika ete pole engengela yango lisusu te !

[5] Tika ete molili mpe elilingi ya kufa ezingela yango ! Tika ete lipata ezipa yango, mpe molili ebangisa pole na yango !

[6] Tika ete molili makasi ekotela butu yango, ete batanga yango lisusu te kati na mikolo ya mibu to kati na mikolo ya basanza !

[7] Tika ete butu yango etikala ekomba, ete koganga moko te ya esengo eyokana na butu yango !

[8] Tika ete bato oyo balakelaka mikolo mabe, bato oyo balamusaka bilima minene ya mayi, balakela yango mabe !

[9] Tika ete minzoto ya tongo na yango ekoma molili, ezela na pamba tongo oyo ekotana mpe emona kongenga ya tongo te.

[10] Pamba te ekangelaki ngai te bikuke ya libumu ya mama na ngai mpo na kobombela miso na ngai pasi ya boye !

[11] Mpo na nini namikufelaki te kati na libumu ya mama na ngai ? Mpo na nini nakataki motema te tango nabimaki na libumu ya mama na ngai ?

[12] Mpo na nini mabolongo eyambaki ngai ? Mpo na nini mama amelisaki ngai mabele ?

[13] Pamba te sik’oyo, nalingaki na ngai kolala na kimia, nalingaki na ngai kokufa mpe kopema

[14] elongo na bakonzi mpe bapesi toli ya mokili, oyo bamitongelaki malita na bango kasi lelo ebeba,

[15] elongo na bakambi oyo bazalaki na wolo mpe batondisa palata kati na bandako na bango.

[16] Mpo na nini babombaki ngai te na se ya mabele lokola zemi oyo esopani to lokola mwana oyo atikala komona te pole ya mokolo ?

[17] Kuna, bato mabe batikaka konyokola bato, bato oyo balembi bazwaka bopemi,

[18] bato ya boloko bazwaka kimia mpe bayokaka lisusu te mongongo ya mokengeli.

[19] Ezala mobola to mozwi, bango mibale bazalaka kuna, mpe mowumbu akangolamaka na maboko ya nkolo na ye.

[20] Mpo na nini pole epesamelaka bato ya pasi ? Mpo na nini bomoi epesamelaka moto oyo azali na pasi na motema ?

[21] Bazelaka kufa, kasi eyaka te ; nzokande balukaka yango koleka bozwi oyo ebombama,

[22] balingaki kotonda na esengo mpe kosepela soki bamoni kunda !

[23] Mpo na nini bomoi epesamela moto oyo nzela na ye ebombama, moto oyo Nzambe azingela lokola lopango ?

[24] Pamba te kolela ekomi bilei na ngai, bileli na ngai ezali kosopana lokola mayi.

[25] Makambo oyo nazalaki kobanga, yango nde ezali kokomela ngai ; oyo nazalaki koyokela somo, yango nde ezali kosalemela ngai.

[26] Nazangi kimia, motema na ngai ezali kokita te mpe nazangi bopemi ; kasi minyoko na minyoko kaka nde nazali na yango. »

Yobo — Chapters