[1] Eliwu azwaki maloba mpe alobaki :
[2] « Bino bato ya bwanya, boyoka maloba na ngai ; bino bato ya mayele, boyoka ngai !
[3] Pamba te litoyi nde esosolaka maloba ndenge lolemo emekaka bilei.
[4] Tososola mpo na biso moko makambo ya sembo, toyekola elongo makambo oyo ezali malamu.
[5] Tala makambo oyo Yobo azali koloba : ‹ Nasali mabe te, kasi Nzambe aboyi kolongisa ngai.
[6] Atako nazali sembo, bazali kozwa ngai lokola mokosi ; atako nasali mabe te, likonga na Ye ezokisi ngai pota oyo esilaka te. ›
[7] Nani azali lokola Yobo, oyo amelaka kotiolama lokola mayi ?
[8] Atambolaka elongo na banyokoli ya bato, asanganaka na bato mabe.
[9] Pamba te alobi : ‹ Ezali na litomba te epai na moto, na koluka kosepelisa Nzambe. ›
[10] Boye, bino bato ya mayele, boyoka ngai ! Ekoki kosalema te ete Nzambe asala mabe ; ekoki kosalema te ete Nkolo-Na-Nguya-Nyonso asala makambo oyo ezangi bosembo.
[11] Azongiselaka moto na moto kolanda misala na ye, apesaka na moto na moto kolanda etamboli na ye.
[12] Te, Nzambe akoki kosala mabe te, Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akoki kobuka bosembo te.
[13] Nani akomisaki Ye Mokonzi ya mokili ? Nani apesaki Ye bokonzi likolo ya mokili mobimba ?
[14] Soki Nzambe azalaki kaka kokanisa mpo na Ye moko, mpe soki abatelaki kati na Ye moko molimo na Ye mpe pema na Ye,
[15] bato nyonso balingaki kokufa elongo, mpe moto nyonso alingaki kozonga putulu.
[16] Soki ozali na boyebi, yoka maloba oyo ; yoka makambo oyo nazali koloba.
[17] Boni, moto oyo ayinaka bosembo akoki solo kozala mokonzi ? Okokweyisa solo Nkolo-Na-Bosembo mpe Nkolo-Na-Nguya ?
[18] Ezali Ye nde alobaka na bakonzi : ‹ Bozali bato pamba, › mpe na bato ya lokumu : ‹ Bozali bato mabe ? ›
[19] Aponaka bilongi ya bakambi te, mpe asalelaka bazwi bolamu te mpo na bozwi na bango koleka babola, pamba te bango nyonso basalemaki na maboko na Ye.
[20] Bato bazali kokufa mbala moko, kati na butu ; bazali kobunda-bunda mpe kolimwa, bato ya nguya bazali kolongwa atako loboko ya moto etindiki bango te.
[21] Miso na Ye ezali likolo ya banzela ya bato, amonaka etamboli na bango nyonso.
[22] Ezala molili, ezala libulu ya kufa, eloko moko te ekoki kobomba bato mabe.
[23] Nzambe azali na posa ya kolanda-landa bato te mpo ete bakoka koya liboso na Ye mpo na kosambisama.
[24] Abomaka bato ya makasi ata soki aluki koyeba tina te mpe atiaka bato mosusu na esika na bango.
[25] Pamba te ayebi misala na bango, akweyisi bango na butu moko, mpe babebisami.
[26] Apesaka bango etumbu lokola bato mabe na esika oyo bato nyonso bakoki komona,
[27] pamba te baboyaki kolanda Ye mpe kososola banzela na Ye.
[28] Bakomisaki koganga ya babola kino epai ya Nzambe, mpe koganga ya banyokolami eyokanaki epai na Ye.
[29] Kasi soki avandi kimia, nani akokweyisa Ye ? Soki abombi elongi na Ye, nani akoki komona Ye ? Nzokande, akengelaka bikolo mpe bato
[30] mpo na kopekisa bato mabe ete bakamba mokili te mpe batiela bato mitambo te.
[31] Soki moto moko alobi na Nzambe : ‹ Nasali mabe, nazwi etumbu ya masumu na ngai, kasi nakosala lisusu mabe te.
[32] Lakisa ngai makambo oyo nazali kokoka komona te ; soki nasali mabe, nakozongela yango lisusu te. ›
[33] Boni, Nzambe akoki kopesa yo etumbu ? Nayebi ete ondimi na yo te. Yo nde osengeli kozwa mokano, kasi ngai te ! Yebisa ngai makambo oyo yo oyebi.
[34] Bato ya mayele mpe bato ya bwanya oyo bazali koyoka ngai balobaki :
[35] ‹ Yobo azali koloba na boyebi te, maloba na ye ezali na tina te. ›
[36] Oh ! Tika ete Yobo asambisama kino na suka mpo ete apesa biyano lokola moto mabe !
[37] Pamba te, na lisumu na ye, azali kobakisa kotomboka, azali kotia tembe kati na biso mpe azali kokoba kobakisa maloba mpo na kotelemela Nzambe. »