Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 4:37

[1] Mpo na yango, motema na ngai ezali kolenga mpe ezali kobeta makasi lokola nde elingi kobima na esika na yango.

[2] Yoka ! Yoka makelele ya mongongo na Ye, makelele oyo ezali kobima na monoko na Ye.

[3] Azali kotinda yango na mokili mobimba, mpe kake na Ye kino na suka ya mokili.

[4] Sima na yango, konguluma na Ye ekoyokana, akoganga makasi na mongongo ya bokonzi na Ye ; akokanga mikalikali ya monoko na Ye te, wana mongongo na Ye ezali koyokana.

[5] Na nzela ya mongongo na Ye ya makasi, Nzambe asalaka bikamwa, asalaka makambo minene, makambo minene oyo mayele na biso ekoki kososola te.

[6] Alobaka na mvula ya pembe : ‹ Sopana na mabele. › Alobaka bongo lisusu na mvula ya makasi : ‹ Sopana. ›

[7] Boye, atiaka kashe na loboko ya moto nyonso mpo ete moto nyonso ayeba misala na Ye. Atondisaka bato nyonso na somo ya nguya na Ye.

[8] Banyama ezongaka na bandako na yango mpe evandaka kati na libulu na yango.

[9] Mopepe makasi ewutaka na ngambo ya sude, malili mpe mipepe, na ngambo ya nor.

[10] Na mopepe oyo ebimaka na monoko ya Nzambe, mayi ebongwanaka libanga mpe bitima ya mayi ekondaka.

[11] Atondisaka mapata na mayi, mpe pole na Ye epanzaka mapata ya mvula.

[12] Na makasi na Ye, mapata ebalukaka na bangambo nyonso mpo na kokokisa nyonso oyo Ye atindaka yango kosala kati na mokili.

[13] Ezalaka mpo na kopesa etumbu na mokili to mpo na kopambola yango.

[14] Yoka, Yobo ! Telema mpe sosola bikamwa ya Nzambe.

[15] Oyebi ndenge nini Nzambe akambaka mapata, mpe ndenge nini angengisaka mikalikali na Ye na mapata ?

[16] Oyebi ndenge nini mapata evandaka malamu ? Ezali bikamwa ya Ye-Oyo-Akoka-Na-Boyebi-Nyonso.

[17] Bilamba na yo ezali na moto, nzokande mabele ezali konyokwama na mopepe ya midi.

[18] Boni, okoki solo kosunga Nzambe mpo na kotanda likolo elongo na Ye, likolo oyo ezali makasi lokola talatala ya ebende banyangwisa na moto ?

[19] Yebisa biso makambo oyo tosengeli koloba na Ye ; tokoki koloba likambo moko te mpo na molili na biso.

[20] Boni, basengeli koyebisa Ye ete nalingi koloba ? Basengeli koyebisa Ye mpo ete ayeba yango ?

[21] Na pwasa, moto moko te azali komona lisusu pole ; ebombami kati na mapata. Kasi soki mopepe eleki, elongoli yango nyonso.

[22] Kongenga lokola wolo ezali koya wuta na ngambo ya nor. Nzambe avandi kati na nkembo ya somo.

[23] Azali Nkolo-Na-Nguya-Nyonso, tokoki te kokoma esika Ye azali ; azali monene na nguya mpe na solo ; azali Mokonzi ya sembo, akoki konyokola te moto oyo azali sembo.

[24] Yango wana bato basengeli kokumisa Ye, kasi Ye atiaka miso na Ye te likolo ya bato oyo bakanisaka ete bazali bato ya bwanya. »

Yobo — Chapters