Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 4:54

[1] Ezali na esika oyo batimolaka palata, mpe na esika oyo bapetolaka wolo.

[2] Ebende ewutaka na mabele, mpe libanga oyo balekisaka na moto epesaka motako.

[3] Moto asilisaka molili, alukaka kino na se, na bisika ya se penza, libanga kati na molili oyo eleki makasi,

[4] atimolaka libulu mosika ya esika oyo bato bavandaka, na bisika oyo makolo ya bato ekomaka te, mosika penza na bato, adiembelaka mosika ya bato nyonso.

[5] Mabele epai wapi bilei ewutaka ebongwani na se na yango lokola nde moto ezikisi yango.

[6] Mabanga ya safiri ewutaka na mabanga makasi ya mabele, mpe putulu ya wolo ezalaka kati na mabele.

[7] Ndeke moko te oyo eliaka misuni eyebi nzela na yango, miso ya mpongo moko te emoni yango,

[8] nyama ya zamba etia nanu makolo na yango kuna te, mpe nkosi etambola nanu kuna te.

[9] Moto abetaka loboko na ye na likolo ya libanga ya makasi mpe apikolaka ngomba longwa na misisa,

[10] atimolaka nzela kati na mabanga, mpe miso na ye emonaka bomengo na yango nyonso,

[11] akawusaka mayi ya bibale mpe abimisaka na pole biloko oyo ebombama.

[12] Kasi bakoki komona bwanya wapi ? Mayele evandaka wapi ?

[13] Moto ayebaka motuya na yango te, pamba te bakoki komona yango te kati na mokili ya bato ya bomoi.

[14] Libulu ya mozindo elobi : « Ezali kati na ngai te ; » mpe ebale monene elobi : « Ezali epai na ngai te. »

[15] Bakoki kosomba yango te na motuya ya libanga ya wolo to na bakilo ya palata ;

[16] bakoki te kosomba yango na wolo ya Ofiri to na mabanga ya talo ya Onikisi to mabanga ya talo ya Safiri ;

[17] wolo to diama ekoki te kokokana na yango, bakoki kozwa yango te na motuya ya sani ya wolo ya kitoko.

[18] Mayaka ya Karayi mpe ya Jasipe ezali na motuya te liboso na yango. Motuya ya bwanya eleki pawuni ya talo.

[19] Topaze ya Kushi ekoki kokokana na yango te, mpe bakoki te kosomba yango ata na wolo ya peto.

[20] Boye, bwanya ewutaka wapi ? Mayele evandaka wapi ?

[21] Ebombami mosika na miso ya bato nyonso ya bomoi, ebombami mpe mosika na miso ya bandeke ya likolo.

[22] Libebi mpe kufa elobi : « Kaka sango na yango nde ekomaki na matoyi na biso. »

[23] Nzambe kaka nde ayebi nzela na yango, Ye nde kaka ayebi esika bwanya evandaka.

[24] Pamba te miso na Ye emonaka kino na suka ya mokili, mpe amonaka nyonso oyo ezali na se ya Lola.

[25] Tango apesaki makasi na mopepe mpe atiaki mondelo na mayi,

[26] tango atiaki mobeko mpo na mvula mpe afungolaki nzela mpo na kake mpe mikalikali,

[27] amonaki bwanya mpe akumisaki yango, andimaki yango mpe amekaki yango.

[28] Bongo alobaki na moto : « Kotosa Nkolo, yango nde bwanya ! Koboya mabe, yango nde mayele ! »

Yobo — Chapters