[1] « Nasalaki boyokani elongo na miso na ngai ete nalula elenge mwasi te.
[2] Pamba te, libula nini Nzambe akoki kobongisela ngai wuta na likolo ? Libonza nini Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akoki kotindela ngai wuta na likolo ?
[3] Boni, pasi ezali mpo na bato mabe te ? Kobebisama ezali mpo na bato oyo basalaka masumu te ?
[4] Amoni banzela na ngai te ? Atangi matambe na ngai nyonso te ?
[5] Soki natambolaki na lokuta to litambe na ngai elandaki nzela mabe,
[6] tika ete Nzambe ameka ngai na emekelo ya sembo, mpe akomona ete ngai nasali mabe te.
[7] Soki matambe na ngai ebimaki na nzela na Ye, soki motema na ngai etambolisamaki kolanda miso na ngai, soki maboko na ngai ekomaki mbindo,
[8] tika ete bato mosusu balia biloko oyo ngai naloni, mpe tika ete nkona na ngai epikolama !
[9] Soki motema na ngai ekosamaki na mwasi to soki natalaki na makanisi mabe ekuke ya mozalani na ngai,
[10] tika ete mwasi na ngai atutela moto mosusu ble mpe tika ete mibali mosusu basangisa na ye nzoto.
[11] Pamba te elingaki kozala likambo ya soni, mpe lisumu ya boye ebongi na esambiselo ya basambisi.
[12] Ezali moto oyo ezali kozikisa kino na kobebisama mpe ekoki kobebisa bomengo na ngai nyonso.
[13] Soki nasalelaki na bosembo te bawumbu na ngai ya mibali mpe ya basi tango bazwaki ngai mabe,
[14] nakosala nini soki Nzambe asambisi ngai ? Nakopesa eyano nini tango akotuna ngai ndenge nini nabandaki kosala ?
[15] Ezalaki Ye te oyo asalaki ngai kati na libumu ya mama na ngai nde asalaki bango ? Ngai na bango, tozalaki lolenge moko te kati na mabumu ya bamama na biso ?
[16] Soki nakokisaki te posa ya mobola to soki nalembisaki miso ya mwasi oyo akufisa mobali,
[17] soki nabombaki lipa na ngai mpo na ngai moko to nakabolaki yango te na bana bitike,
[18] —nzokande wuta bolenge na ngai, nazalaki kobokola bana bitike lokola tata na bango ; mpe wuta mbotama na ngai, nazalaki kolakisa nzela na mwasi oyo akufisa mobali—
[19] soki namonaki mobola kokufa na kozanga bilamba to moto akelela kozanga bilamba,
[20] bongo motema na ye epambolaki ngai te na ndenge nazipaki ye na bilamba oyo ewutaki na bibwele na ngai,
[21] soki natombolaki loboko na ngai mpo na kosala mwana etike mabe, wana nayebaki ete nazali na nguya liboso ya basambisi,
[22] tika ete loboko na ngai elongwa na lipeka na ngai to ebukana !
[23] Pamba te nazalaki kobanga etumbu ya Nzambe, mpe nakokaki te kosala eloko liboso ya lokumu na Ye.
[24] Soki natiaki elikya na ngai na wolo to nalobaki na wolo ya kitoko : ‹ Ozali ekimelo na ngai, ›
[25] soki nasepelaki na ebele ya bozwi na ngai, bomengo oyo maboko na ngai esalaki,
[26] soki natalaki moyi na kongenga na yango to sanza kotambola na nkembo,
[27] soki motema na ngai ekosamaki na nkuku, mpe maboko na ngai epesaki yango beze ya lokumu,
[28] wana elingaki lisusu kozala mbeba oyo ebongi na esambiselo ya basambisi, pamba te nalingaki kowangana Nzambe oyo azali na Likolo.
[29] Soki nasepelaki na pasi ya monguna na ngai to nagangaki na esengo na likama oyo ekomelaki ye,
[30] soki napesaki nzela na monoko na ngai ete esala lisumu na kosenga kufa ya monguna na ngai na nzela ya maloba ya kolakela mabe;
[31] soki bato ya libota na ngai balobaka te : ‹ Nani oyo atondaki te na misuni ya banyama ya Yobo ? ›
[32] Soki mopaya moko te alalaki libanda, pamba te ekuke na ngai ezalaki ya kofungwama tango nyonso mpo na moleki nzela,
[33] soki nabombaki lisumu na ngai ndenge Adamu asalaki to nabombaki yango na motema na ngai,
[34] pamba te nabangaki bato mpe nabangaki ete mabota etiola ngai, yango wana nakangaki monoko mpe nakokaki kobima libanda te !
[35] Ah, soki nazalaki ata na moto oyo akokaki koyoka ngai ! Yango nde sik’oyo liloba na ngai ya suka. Tika ete Nkolo-Na-Nguya-Nyonso ayanola ngai ! Tika ete moto oyo afundi ngai akoma na mokanda makambo oyo afundeli ngai !
[36] Solo, nalingaki komema yango na lipeka na ngai, nalingaki kolata yango lokola motole,
[37] nalingaki kotalisa Ye makambo nyonso oyo nasalaki, nalingaki kopusana pene na Ye lokola mokambi.—
[38] Soki mabele na ngai eboyi ngai, soki mikala na yango elelaki,
[39] soki naliaki bambuma na yango na ofele to soki natungisaki bankolo na yango,
[40] tika ete banzube ebima na esika ya ble, mpe matiti mabe ebima na esika ya orje. » Oyo nde suka ya maloba ya Yobo.