[1] Nayini bomoi na ngai ! Nakokoba kaka komilela, nakoloba na mongongo makasi mpe na pasi ya motema na ngai.
[2] Nakoloba na Nzambe : ‹ Kokatela ngai etumbu te, yebisa ngai mabe nini nasali ! ›
[3] Boni, ozali kosepela konyokola ngai, kobwaka ekelamu oyo maboko na Yo esali, mpe kolongisa mabongisi ya bato mabe ?
[4] Boni, ozali na miso ya mosuni ? Ozali komona lokola bato ?
[5] Boni, mikolo na Yo ezali lokola mikolo ya bato, mpe mibu na yo, lokola mibu ya bato,
[6] mpo ete oluka mabe na ngai to okundola masumu na ngai,
[7] atako oyebi malamu ete nasali na ngai mabe te, mpe ete ezali na moto moko te oyo akoki kokangola ngai na loboko na Yo ?
[8] Maboko na Yo nde ebongisaki ngai mpe esalaki ngai ; olingi sik’oyo kobenda nzoto mpe koboma ngai ?
[9] Kanisa ete Yo moko nde obongisaki ngai lokola mabele ya bikeko ; olingi sik’oyo kozongisa ngai na putulu ?
[10] Osopaki ngai lokola miliki te ? Okangisaki ngai mbuma-mbuma te lokola fromage ?
[11] Olatisaki ngai poso ya nzoto mpe misuni te ? Otongaki mikuwa mpe misisa na ngai te ?
[12] Opesaki ngai bomoi mpe otalisaki ngai bolamu ; mpe na bonzambe na Yo, obatelaki molimo na ngai.
[13] Kasi tala likambo oyo obombaki kati na motema na Yo, mpe nayebi ete ezalaka kati na makanisi na Yo.
[14] Soki nasalaki masumu, olingaki komona ngai, mpe olingaki te kozanga kopesa ngai etumbu mpo na masumu na ngai.
[15] Soki nazali na ngambo, wana mawa na ngai ! Ata nasali mabe te, nazali kokoka te kotombola moto, pamba te natondisami na soni mpe nazindi kati na pasi na ngai.
[16] Soki nameki kotombola moto, ozali kolanda ngai lokola nkosi mpe ozali kobimisela ngai mayele na Yo nyonso mpo na kotelemela ngai,
[17] ozali komemela ngai batatoli ya sika mpo na kotelemela ngai, ozali kopelisela ngai kanda na Yo mpo na kosala ngai mabe, mampinga na Yo bazali tango nyonso koya kobundisa ngai.
[18] Mpo na nini obimisaki ngai na libumu ya mama na ngai ? Nalingaki na ngai kokufa, mpe liso moko te elingaki komona ngai.
[19] Soki kutu nazalaka na ngai te, nalingaki koleka kaka mbala moko longwa na libumu ya mama kino na kunda.
[20] Boni, mwa ndambo ya mikolo na ngai esili te ? Kende ata mosika na ngai mpo ete nazwa ata tango ya kosepela
[21] liboso ete nakende na esika oyo bato bazongaka lisusu te, na mokili ya molili, mokili ya kufa,
[22] na mokili ya molili makasi, ya kufa mpe ya mobulu, epai wapi ata pole ezalaka molili. »