[1] Yobo azongisaki :
[2] « Ah ! Soki ezalaki na makoki ya komeka kilo ya mawa na ngai, mpe ya kotia pasi na ngai nyonso na emekelo kilo,
[3] nakanisi ete elingaki koleka zelo ya bibale minene na kilo. Yango wana, maloba na ngai ezali koleka ndelo.
[4] Makonga ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso etoboli ngai, mpe molimo na ngai ezali komela ngenge na yango ; Nzambe atelemeli ngai na kanda na Ye.
[5] Boni, ane ya zamba elelaka soki ezali kolia matiti ? Ngombe ya mobali elelaka soki ezali kolia bilei na yango ?
[6] Boni, baliaka na mungwa te bilei oyo ezanga elengi ? Mayi oyo ezalaka kati na maki ezalaka elengi ?
[7] Makambo oyo nazalaki koboya, yango nde ekomi bilei na ngai, atako ezali mabe.
[8] Ah ! Nani akoki kosala ete bosenga na ngai ekokisama, mpe ete Nzambe akokisela ngai likambo oyo nazali kozela !
[9] Tika ete Nzambe aboma na Ye ngai, asembola loboko na Ye mpo na kokata ngai moto !
[10] Na boye nde nakoki kozwa kobondisama mpe esengo kati na pasi na ngai, oyo eleki ndelo, pamba te nawangani te maloba ya Ye oyo azali Mosantu.
[11] Makasi nini penza nazali na yango mpo ete nazala lisusu na elikya ? Mpo na nini nawumela lisusu kotala suka ya bomoi na ngai ?
[12] Boni, nazali makasi lokola libanga ? Nzoto na ngai ezali ya ebende ?
[13] Nazali na nguya ya komisunga awa natikali lisusu na makoki te ?
[14] Moto nyonso oyo azali na pasi asengeli na mawa ya baninga na ye, ata soki atiki kotosa Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.
[15] Kasi tala, bandeko na ngai bakosi ngai lokola moluka, lokola mayi ya moluka oyo ekawuki.
[16] Tango mayi oyo ekomaka libanga mpo na malili, mpe mvula ya pembe, epanzanaka, ememaka mpela.
[17] Kasi na tango ya molunge, mayi yango esilaka, mpe moluka yango ekawukaka nyonso mpo na molunge makasi.
[18] Masanga ya bato oyo batambolaka na bampunda mpo na kokende na mobembo, ebongoli nzela ya kokende, ekeyi kokota kino kati na esobe mpe ekufi kuna.
[19] Masanga ya bato ya Tema, oyo ezali na mobembo, elukaki mayi ; masanga ya bato ya Saba, oyo ezali na mobembo, etielaki yango motema.
[20] Kasi bayokaki soni mpo ete batielaki yango motema ; tango bakomaki kuna, bamiyokelaki mawa.
[21] Bino mpe bozali ndenge wana mpo na ngai, bozali na makoki te ya kosunga ngai ; awa bomoni pasi na ngai, somo ekangi bino !
[22] Boni, nasila koloba na bino : ‹ Bokabela ngai ndambo ya biloko na bino to bofutela ngai niongo na nzela ya bozwi na bino,
[23] mpo na kokangola ngai na loboko ya monguna to mpo na kobikisa ngai na nguya ya bato mabe ? ›
[24] Boteya ngai, bongo nakokanga monoko ; bolakisa ngai mabe nini ngai nasali !
[25] Tala ndenge maloba ya solo esalaka pasi ! Kasi makanisi na bino elingi kotalisa nini ?
[26] Bokanisi ete bokoki kosembola makambo oyo nazali koloba to kozwa lokola mopepe, maloba ya moto oyo azali na pasi ?
[27] Solo, bino, bokoki ata kobeta zeke mpo na mwana etike mpe koteka moninga na bino na bowumbu !
[28] Kasi sik’oyo, bozala na mitema malamu mpo na kotala ngai ! Boni, nakoki penza kokosa bino, kaka na miso makasi boye ?
[29] Bokanisa nanu malamu, bozala nanu sembo ! Bokanisa penza malamu, pamba te ezali bosembo na ngai nde emekami.
[30] Boni, likambo nini ya mabe ezali na monoko na ngai ; monoko na ngai ekoki kososola mabe te ?