Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 3:01

[1] Mokolo ya Kopema esili, na tongo penza, Maria ya Magdala ná ndoi na ye, mama na Jake ná Jozef, bakei lisusu kotala simetiere.

[2] Na mbala moko mabelé ebandi koningana makasi. Anjelu ya Nkolo auti na Likolo ayei kolongola libanga pe afandi likolo na yango.

[3] Elongi na ye ezalaki kongenga lokola moi, pe bilamba na ye ezalaki pembe penza.

[4] Basoda bayoki somo pe babandi kolenga; bakómi lokola bato bakufi.

[5] Anjelu alobi na basi: “Bóbanga té, nayebi 'tè bozali koluka Yezu oyo babomaki na kuruze.

[6] Azali awa té! Asi'asekwi ndenge alobaki. Bóya kotala esika nzoto na ye ezalaki.

[7] Bókende noki koyebisa bayekoli na ye 'tè: ‘Asi'asekwi, pe sik'oyo akei liboso na bino na Galilé; bokomona ye kuna.’ Wana ezali sango nayeeli bino.”

[8] Batiki simetiere noki, bazalaki kobanga mingi, kasi mitema na bango etondaki na esengo; pe bakei mbangu po na koyebisa sango yango na bayekoli ya Yezu.

[9] Na mbala moko Yezu ayei liboso na bango pe alobi: “Mbote na bino!” Bango bapusani penepene na ye, bafukami pe basimbi makolo na ye.

[10] Bongo Yezu alobi na bango: “Bóbanga té; bókende koloba na bandeko na ngai bákende na Galilé: bakomona ngai kuna.”

[11] Tango basi bazalaki kokende, basoda mosusu oyo bazalaki kokengela simetiere bazongi na mboka, po báyebisa na bakonzi ya banganga-Nzambe makambo nyonso oyo elekaki.

[12] Bakonzi ya banganga-Nzambe ná bambuta-muntu basangani pe bayokani, bongo bapesi basoda mbongo mingi;

[13] pe balobi na bango: “Bóloba boye: bayekoli na ye bayei koyiba ebembe na ye na butu, tango biso tozalaki na pongi.

[14] Soki Pilate ayoki likambo wana, tokokitisa ye motema; bóbanga eloko té.”

[15] Basoda bazwi mbongo, pe basali ndenge balobelaki bango. Yango wana lisolo oyo epanzaná na Bayuda tii na moi ya lelo.

[16] Bayekoli zomi na moko bakei na Galilé na ngomba oyo Yezu alobaki 'tè akokutana ná bango.

[17] Tango bamoni ye, bafukameli ye. Kasi bamosusu na kati na bango bazalaki kaka kotia tembe.

[18] Yezu ayei penepene na bango pe alobi: “Nzambe apesi ngai bokonzi nyonso na Likolo pe na se.

[19] Bongo bókende epai ya bato ya bikolo nyonso, pe bókómisa bango bayekoli na ngai; bóbatisa bango na kombo ya Tata pe ya Mwana pe ya Molimo Mosantu.

[20] Bólakisa bango bátosaka mitindo nyonso napesaki bino. Bóyeba 'tè nazali na bino mikolo nyonso tii na suka ya mokili.”

Matié — Chapters