Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 9:35

[1] Na tongo, bakonzi ya banganga-Nzambe nyonso ná bambuta-muntu ya Bayuda basangani pe bayokani po na kobomisa Yezu.

[2] Bakangisi ye minyololo, bakei kopesa ye na maboko ya Pilate, motambwisi ya rejion ya Yudea.

[3] Yudas, moto atekaki ye, tango amoni 'tè bakateli Yezu etumbu ya liwa, ayoki pasi mingi na motema pe akei kozongisa bibende tuku misato (30) ya mbongo wana na bakonzi ya banganga-Nzambe pe na bambuta-muntu.

[4] Alobi na bango: “Nasali mabe po nabomisi moto asali eloko té.” Kasi bango bazongiseli ye: “Wana etali biso té! Etali yo moko!”

[5] Bongo Yudas abwaki mbongo yango na Ndako ya Nzambe pe atiki bango; na sima akei komitia singa na kingo.

[6] Bakonzi ya banganga-Nzambe balokoti mbongo wana pe balobi: “Mibeko na biso epekisá kotia mbongo ya ndenge oyo na sanduku ya Ndako ya Nzambe, po ezali mbongo batangiseli makila ya moto.”

[7] Tango basilisi koyokana, basombi na yango elanga po na kokundelaka bapaya. Ezalaki elanga ya moto moko asalaka banzungu ya mabelé.

[8] Yango wana tii lelo babengaka elanga yango “Elanga ya Makila.”

[9] Esalamaki bongo ndenge profete Jeremya alobaká: “Bakamati bibende tuku misato (30) ya mbongo, yango ezali talo oyo bato ya Israel bakataki po na ye;

[10] bongo basombi na yango elanga ya moto asalaka banzungu ya mabelé, ndenge Nkolo atindaki ngai.”

[11] Yezu atelemi liboso ya Pilate. Pilate atuni ye: “Yo ozali mokonzi ya Bayuda?” Yezu azongisi: “Yo moko olobi yango.”

[12] Kasi tango bakonzi ya banganga-Nzambe ná bambuta-muntu bazalaki kofunda ye, Yezu azongisaki ata liloba té.

[13] Bongo Pilate atuni ye: “Ozali koyoka té ebele ya makambo bazali kofundela yo?”

[14] Kasi Yezu azongisi ata liloba moko té. Yango wana Pilate akamwe mingi penza.

[15] Mbula na mbula na feti ya Koleka, Pilate amesanaki kobimisa moto moko ya boloko oyo bato balingaki.

[16] Na tango wana ezalaki na moto moko ya boloko ayebanaki mingi, kombo na ye Yezu Barabas.

[17] Pilate atuni bato oyo basanganaki wana: “Bolingi nátikela bino nani? Yezu Barabas to Yezu, oyo babengaka Mesia?”

[18] Pamba té ayebaki malamu 'tè bango bapesaki Yezu na maboko na ye po na likunya.

[19] Tango Pilate afandaki na tribinal, mwasi na ye atindeli ye maloba oyo: “Kokota na makambo ya moto wana té. Asali eloko té. Lelo na butu namonaki pasi mingi na ndoto po na ye.”

[20] Nzokande bakonzi ya banganga-Nzambe pe bambuta-muntu bapesi bato mayele po básenga na Pilate átika Barabas pe ábomisa Yezu.

[21] Pilate atuni bango lisusu: “Na kati ya bato oyo mibale, bolingi nátikela bino nani?” Bango bazongisi: “Barabas!”

[22] Bongo Pilate atuni: “Kasi násala nini na Yezu oyo babengaka Mesia?” Bazongisi: “Boma ye na kuruze!”

[23] Pilate atuni: “Mabe nini ye asali?” Kasi bango babandi koganga makasi penza: “Boma ye na kuruze!”

[24] Tango Pilate amoni 'tè akoki lisusu kosala eloko té, pe bato balingi kotomboka, akamati mai, asukoli maboko liboso ya bato, pe alobi: “Likambo ya makila ya moto oyo etali ngai té. Etali kaka bino moko.”

[25] Bato nyonso bazongisi: “Likambo té! Makila na ye ézala ngambo na biso pe ya bana na biso!”

[26] Bongo Pilate atikeli bango Barabas; abetisi Yezu fimbu pe apesi ye na maboko na bango po bákende koboma ye na kuruze.

[27] Basoda bamemi Yezu na lopango ya Pilate, pe babengisi batayon na bango mobimba, báya kotala ye.

[28] Balongoli ye bilamba pe balatisi ye kazaka moko ya motane.

[29] Na sima batie ye na motú ekoti moko lokola ya bakonzi, kasi batòngaki yango na nzube. Batie pe nzete na liboko na ye ya mobali, pe babandi kofukamela ye. Baseki ye, balobi: “Mbote, mokonzi ya Bayuda!”

[30] Babwakeli ye soi, bakamati nzete wana, pe babetibeti ye na motú.

[31] Tango basilisi kosekaseka ye, balongoli ye kazaka pe bazongiseli ye bilamba na ye, bongo bamemi ye po bákende koboma ye na kuruze.

[32] Tango babimi, bakutani ná moto moko ya mboka Sirene, kombo na ye Simon, pe batindi ye na makasi ámema kuruze ya Yezu.

[33] Bakómi na esika moko babengaka Golgota, elingi koloba “Mokuwa ya Motú.”

[34] Kuna bapesi Yezu vinu basangisá ná kisi ya bololo penza; Yezu ameki yango, kasi aboyi komela.

[35] Awa basilisi kotia ye na kuruze, bakaboli bilamba na ye, babeteli yango zeke.

[36] Na sima bafandi wana po na kokengela ye.

[37] Na likolo ya motú na ye batiaki mwa-libaya bakòmá tina bakatelaki ye etumbu: “Oyo Yezu, mokonzi ya Bayuda.”

[38] Batie pe bamiyibi mibale na bakuruze esika moko ná Yezu, moko na liboko na ye ya mobali, mosusu na liboko na ye ya mwasi.

[39] Bato oyo bazalaki koleka kuna baningisi mitú pe babandi kotsiola pe kofinga ye,

[40] balobi: “Yo moto olingaki koboma Ndako ya Nzambe pe kotònga yango lisusu na mikolo misato! Soki ozali mwana ya Nzambe, ómibikisa yo moko, pe kita na kuruze.”

[41] Bakonzi ya banganga-Nzambe ná balakisi-Mibeko pe bambuta-muntu bazalaki kosala kaka ndenge wana, babandi koseka pe koloba:

[42] “Abikisaki bato mosusu, kasi ye moko akoki komibikisa té! Azali mokonzi ya Israel té? Ákita sik'oyo na kuruze, bongo tokondima ye!

[43] Azalaki kotia motema na Nzambe, e bongo soki Nzambe alingaka ye, ábikisa ye sik'oyo; pamba té alobaki: ‘Nazali Mwana ya Nzambe.’”

[44] Bamiyibi oyo batiaki na kuruze esika moko ná Yezu bafingi ye kaka ndenge moko.

[45] Na midi, molili ekwei na mokili mobimba tii na ngonga ya misato ya pokwa.

[46] Penepene na ngonga ya misato, Yezu agangi na mongongo makasi penza: “Eli, Eli, lema sabaktani?” Elingi koloba: “Nzambe na ngai! Nzambe na ngai! Po na nini otiki ngai?”

[47] Bato mosusu oyo bazalaki wana, bayoki ye pe balobi: “Azali kobenga profete Eliya!”

[48] Moko na bango akei mbangu kokamata linuka, atondisi yango na vinu ya ngayi. Akangisi yango na songe ya nzete pe apesi yango na Yezu po ámela.

[49] Kasi bamosusu balobi: “Zela tótala soki Eliya akoya kobikisa ye!”

[50] Bongo Yezu agangi lisusu makasi penza, pe akati motema.

[51] Kaka na tango wana ridó monene oyo ezalaka na Ndako ya Nzambe, na liboso ya Esika eleki bosantu, epasuki na biteni mibale, banda na likolo tii na se. Mabelé eningani, mabanga epasuki,

[52] basimetiere efungwami, pe bato mingi ya Nzambe oyo bakufaká basekwi;

[53] babimi na basimetiere, pe na sima ya kosekwa ya Yezu bakoti na Yeruzalem. Kuna bato mingi bamonaki bango.

[54] Basoda oyo bazalaki kokengela Yezu, ná mokonzi na bango, tango bamoni mabelé eningani pe makambo nyonso oyo ezalaki koleka, bayoki somo mingi pe balobi: “Ya solo, moto oyo azalaki mwana ya Nzambe!”

[55] Basi mingi batelemaki kuna pe bazalaki kotala na mosika; bango bazalaki kolanda Yezu kobanda na Galilé po na kosalela ye.

[56] Maria ya mboka Magdala azalaki na kati na bango ná ndoi na ye Maria mama ya Jake ná Jozef, pe ná mama ya Jake ná Yoane, bana ya Zebedé.

[57] Tango pokwa ekómi, moto moko ya mbongo mingi ayei, kombo na ye Jozef; autaki na mboka Arimaté. Ye pe azalaki moyekoli ya Yezu.

[58] Akei epai ya Pilate po na kosenga ebembe ya Yezu. Pilate atindi bápesa ye yango.

[59] Bongo Jozef akamati ebembe, alíngi yango na elamba kitoko pe ya sika,

[60] pe atie yango na libulu oyo asalisaki na kati ya mabanga; ezalaki simetiere oyo abongisaki po na ye moko. Na sima apusi libanga moko ya monene po na kokanga monoko ya libulu, pe azongi na ye.

[61] Maria ya mboka Magdala ná ndoi na ye bafandaki kuna liboso ya simetiere.

[62] Sima ya mokolo moko, ezalaki Mokolo ya Kopema, bakonzi ya banganga-Nzambe ná ba-Farizé bakei epai ya Pilate.

[63] Balobi na ye: “Mokonzi, tozali kokanisa makambo moto ya lokuta wana alobaki tango azalaki nanu na bomoi. Ye alobaki: ‘Nakosekwa na mikolo misato.’

[64] Ebongi ótinda bákengela simetiere mikolo misato; soki té bayekoli na ye bakoya koyiba ebembe, bongo na sima bakoloba na bato: ‘Asekwi’. Lokuta wana ekoleka oyo ya liboso na mabe.”

[65] Pilate azongiseli bango: “Bókamata basoda. Bókende kokengela simetiere na ndenge ekoki.”

[66] Bongo bakei, batie elembo na libanga bazipelaki libulu, po na kokanga yango libela, pe batiki basoda po na kokengela yango.

Matié — Chapters