Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 7:29

[1] Oyo ezali Sango Malamu ya Yezu Kristo, Mwana ya Nzambe.

[2] Yango ebandaki ndenge profete Ezaya akòmaká: “Nzambe alobi: ‘Nakotinda ntoma na ngai liboso na yo, po na kobongisela yo nzela.’

[3] Moto moko azali kobelela na kati ya esobe: ‘Nkolo alingi koya! Bóbongisela ye nzela. Bósalela ye nzela moko ya kitoko!’”

[4] Nyonso wana esalamaki, tango Yoane Mobatisi akendeki na esobe; azalaki kosakola boye: “Bóbongola mitema; bóya nábatisa bino, bongo Nzambe akolimbisa masumu na bino.”

[5] Bato nyonso ya rejion ya Yudea pe ya Yeruzalem bazalaki kokende epai na ye; bazalaki kobimisa polele masumu na bango na miso ya bato nyonso, pe Yoane azalaki kobatisa bango na mai ya Yordan.

[6] Yoane azalaki kolata elamba basalá na bapwale ya shamó, pe mokaba ya poso ya nyama na loketo. Azalaki kolia kaka mankonko ná mafuta ya nzoi.

[7] Azalaki kosakola boye: “Moto oyo akoya sima na ngai aleki ngai na nguya; nakoki kutu té kogumbama na makolo na ye pe kofungola basinga ya basandale na ye.

[8] Ngai nazalaki kobatisa bino na mai pamba; kasi ye akobatisa bino na Molimo Mosantu.”

[9] Na mikolo wana, Yezu auti na Galilé na mboka Nazaret, pe Yoane abatisi ye na mai ya Yordan.

[10] Tango Yezu abimi na mai, amoni Likolo efungwami pe Molimo akiteli ye lokola pijon.

[11] Bongo ayoki mongongo moko euti na Likolo, elobi: “Yo ozali Mwana na ngai ya bolingo; nasepeli na yo mingi.”

[12] Kaka na tango wana Molimo amemi ye na esobe;

[13] afandaki na esika ya banyama ya zamba. Kuna Satan ameki ye mikolo tuku minei (40) mobimba; pe ba-anjelu bazalaki kosalela ye.

[14] Tango bakangi Yoane na boloko, Yezu akei na Galilé pe abandi kosakola Sango Malamu ya Nzambe,

[15] azalaki koloba boye: “Tango esi'ekoki; Nzambe alingi kotia bokonzi na ye sik'oyo. Bóbongola mitema pe bóndima Sango Malamu!”

[16] Mokolo moko Yezu azalaki koleka penepene ya laki ya Galilé, amoni baluki-mbisi mibale, Simon ná leki na ye André, bazalaki kobwaka monyama na mai.

[17] Alobi na bango: “Bólanda ngai. Bokozala lisusu baluki-mbisi té; nakokómisa bino baluki ya bato.”

[18] Na mbala moko, batiki minyama na bango pe balandi Yezu.

[19] Yezu apusani moke pe amoni Jake ná ndeko na ye Yoane, bana ya Zebedé. Bazalaki kobongisa minyama na kati ya bwatu na bango.

[20] Kaka na tango wana Yezu abengi bango; bongo batiki tata na bango Zebedé ná bato ya mosala na kati ya bwatu pe balandi Yezu.

[21] Yezu ná bayekoli na ye bakendeki na vile ya Kafarnaum. Na Mokolo ya Kopema, Yezu akoti na ndako ya lisanga pe abandi koteya.

[22] Bato bakamwaki mingi na ndenge azalaki koteya; pamba té azalaki koteya bango lokola balakisi-Mibeko té, kasi lokola moto azali na bokonzi.

[23] Kaka na tango wana, moto moko ya molimo mabe ayei kokota na ndako ya lisanga pe abandi koganga:

[24] “Yezu ya Nazaret, biso ná yo likambo nini? Oyei po na koboma biso? Nayebi yo malamu! Ozali Mosantu oyo Nzambe atindi!”

[25] Yezu agangeli molimo wana, alobi: “Fanda nyee! Bima na nzoto ya moto oyo!”

[26] Molimo yango eningisi moto wana mabe penza, egangi na mongongo makasi pe ebimi.

[27] Bato nyonso bakamwe mingi penza, pe babandi kotunana: “Likambo nini wana? Moto oyo azali kopesa mateya ya sika lokola nde azali na bokonzi. Azali kutu kotinda milimo mabe, pe yango ezali kotosa ye!”

[28] Boye sango ya Yezu epanzanaki noki bipai nyonso na Galilé mobimba.

[29] Na tango wana, balongwe na ndako ya lisanga pe bakei na ndako ya Simon ná André nzela moko ná Jake pe Yoane.

[30] Tango Yezu akómi, bayebisi ye 'tè mama ya mwasi ya Simon alali na mbeto, azali na fievre.

[31] Apusani penepene na ye, asimbi ye na liboko pe atelemisi ye. Fievre esili, pe mwasi abandi kosalela bango.

[32] Na pokwa, tango moi esi'ekiti, bamemeli Yezu bato nyonso ya maladi pe ya milimo mabe.

[33] Bato nyonso ya vile bayei kosangana liboso ya ndako.

[34] Yezu abikisi bato ebele bazalaki na maladi ya ndenge na ndenge, pe abimisi milimo mabe mingi. Apekisi yango éloba té, pamba té milimo mabe eyebaki ye.

[35] Na tongo-tongo, liboso 'tè moi ébima, Yezu alongwe na Kafarnaum pe akei kofanda ye moko na esika ya kimia na esobe; kuna abandi kosambela.

[36] Simon ná baninga mosusu bakei koluka ye.

[37] Tango bamoni ye, balobi: “Bato nyonso bazali koluka yo.”

[38] Kasi Yezu alobi na bango: “Tókende epai mosusu na bamboka ya pembeni. Nasengeli pe koteya kuna. Pamba té, nayei kaka po na yango.”

[39] Bongo atamboli Galilé mobimba, azalaki koteya bato na bandako ya lisanga, pe kobimisa milimo mabe.

[40] Mokolo mosusu moto moko ya maba ayei, afukameli Yezu pe abondeli ye boye: “Soki olingi, okoki kobikisa ngai.”

[41] Yezu ayokeli ye mawa; atandi liboko, asimbi ye, pe alobi: “Nalingi yango, bika!”

[42] Kaka na tango wana maba esili pe abiki.

[43] Yezu atindi ye noki na makasi 'tè ákende na mboka.

[44] Alobi: “Yoka malamu! Koloba likambo oyo na moto moko té, kasi kende komilakisa na nganga-Nzambe ndenge okómi, pe pesa mabonza ndenge Moize atindá po na moto oyo abiki na maladi ya maba; boye bato nyonso bakomona 'tè obiki solo.”

[45] Kasi ata bongo, moto wana akei koyebisa bipai nyonso ndenge abikaki. Yango wana Yezu akokaki komimonisa lisusu na mboka té, kasi atikalaki na bisika ya esobe. Bongo bato bautaki bipai nyonso bayei epai na ye.

Marko — Chapters