Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 6:14

[1] Na tango wana bayekoli bayei epai ya Yezu pe batuni ye: “Na bokonzi ya Likolo, nani aleki?”

[2] Yezu abengi mwana moko ya moke, atie ye liboso na bango,

[3] pe alobi: “Nalobi na bino, ya solo; soki bobongoli mitema té po bókóma lokola bana mike, bokoki kokóma ata moke té bato ya bokonzi ya Likolo.

[4] Na bokonzi ya Likolo, moto aleki bato nyonso ezali oyo azangi lofundu pe akómi lokola mwana oyo.

[5] Bongo moto oyo akoyamba mwana moke boye po na kombo na ngai, ayambi ngai moko.”

[6] “Soki moto moko oyo ayebi makambo mingi té andimi ngai, bongo moto mosusu akweisi ye na likambo, ebongi malamu bákanga moto wana libanga moko ya monene na kingo, pe bákende kodindisa ye na kati ya ebale.

[7] Mawa mingi na mokili po na ndenge bakweisaka bato na likambo! Makambo ya boye ekoki kozanga té; kasi mawa mingi na moto oyo akweisaka baninga!

[8] “Soki ozali kokweya na likambo po na liboko na yo to po na likolò na yo, kata yango pe bwaka yango mosika. Pamba té ebongi malamu ókota na mboka ya bomoi ata ozangi liboko to likolò, esika 'tè bábwaka yo na lifelo, ná maboko to makolo nyonso mibale.

[9] Soki ozali kokweya na likambo po na liso na yo, longola yango pe bwaka yango mosika. Pamba té ebongi malamu ókota na mboka ya bomoi ata ozangi liso, esika 'tè bábwaka yo na lifelo ná miso nyonso mibale.”

[10] “Bókeba, bótsiola ata moto moko té na kati ya bato oyo bayebi makambo mingi té. Nalobi na bino: ba-anjelu oyo babatelaka bango bazalaka tango nyonso liboso ya Tata na ngai oyo azali na Likolo.

[11] [Pamba té mwana ya Moto ayei kobikisa bato oyo babungi.]

[12] “Bokanisi nini? Soki moto moko azali na bameme kama moko (100), bongo abungisi meme moko, akosala nini? Akotika bameme tuku libwa na libwa (99) mosusu na likolo ya ngomba, pe akokende koluka oyo ebungi.

[13] Nalobi na bino, ya solo: tango akomona meme wana akoyoka esengo mingi, koleka esengo oyo azali koyoka po na bameme tuku libwa na libwa (99) oyo ebungaki té.

[14] Ndenge moko pe Tata na bino ya Likolo alingi té 'tè moto moko ábunga na kati ya bato oyo bayebi makambo mingi té.”

[15] “Soki ndeko na yo asali yo mabe, kende epai na ye, bongo tango bokozala kaka bino mibale, lakisa mabe oyo ye asali. Soki ayokeli yo, wana akómi lisusu ndeko na yo.

[16] Kasi soki aboyi koyokela yo, mema moto mosusu to bato mibale, pamba té Mibeko elobá boye: ‘Maloba ya batemwen mibale to misato ékata makambo nyonso.’

[17] Kasi soki ye aboyi koyokela bango, loba likambo wana na lisanga ya bandimi. Bongo soki ye aboyi koyokela lisanga ya bandimi, kamata ye lokola moto ayebi Nzambe té to lokola mofutisi-mpaku.

[18] “Nalobi na bino, ya solo: makambo nyonso bino bokokanga awa na se, Nzambe pe akokanga yango na Likolo; makambo nyonso bokofungola awa na se, Nzambe pe akofungola yango na Likolo.

[19] “Pe nalobi na bino: soki awa na mokili bato mibale na kati na bino bayokani po básenga ata nini na losambo, Tata na ngai ya Likolo akopesa bango yango.

[20] Pamba té, esika bato mibale to misato basangani na kombo na ngai, ngai nazali na kati na bango.”

[21] Bongo Piere ayei penepene ya Yezu pe atuni ye: “Mokonzi, soki ndeko na ngai asalaka ngai mabe mbala na mbala, mbala boni nasengeli kolimbisa ye? Ekoki kozala mbala sambo?”

[22] Yezu azongiseli ye: “Té, nalobi na yo mbala sambo té, kasi mbala tuku sambo (70) mbala sambo.

[23] Yango wana na bokonzi ya Likolo, Nzambe akosala lokola mokonzi moko oyo abengaki basali na ye po na kotala makambo ya nyongo na ye.

[24] Tango abandi kotala makambo yango, bamemeli ye mosali moko azalaki na nyongo na ye mingi penza mayele té!

[25] Moto wana azalaki na mbongo ya kofuta nyongo yango té. Yango wana mokonzi atindi báteka ye lokola moumbu, ná mwasi na ye pe bana, ná biloko nyonso oyo azalaki na yango, po na kofuta nyongo.

[26] Mosali wana afukameli mokonzi pe abondeli ye, alobi: ‘Mokonzi, kitisa motema, pesa ngai mwa-mikolo, pe nakofuta nyongo na yo.’

[27] Mokonzi ayokeli ye mawa, alimbisi ye, pe atiki ye ákende.

[28] “Tango mosali wana abimi, akutani ná moninga na ye ya mosala oyo adefaki mwa-ndambo ya mbongo epai na ye. Bongo asimbi ye na mongongo pe afini ye makasi, alobi na ye: ‘Futa nyongo na ngai!’

[29] Moto wana afukameli ye, pe abondeli ye boye: ‘Mbuta-muntu, kitisa motema, pesa ngai mwa-mikolo, pe nakofuta nyongo na yo.’

[30] Kasi ye alingaki té, bongo atie ye na boloko tii tango akofuta nyongo na ye.

[31] Basali mosusu oyo bamonaki makambo wana, bayoki mawa mingi pe bakei koyebisa makambo nyonso epai ya mokonzi na bango.

[32] Bongo mokonzi abengi moto wana pe alobi na ye: ‘Mosali mabe! Ozalaki na nyongo mingi penza, pe nalimbisi yo po obondelaki ngai.

[33] Yo pe osengelaki koyokela moninga na yo mawa ndenge ngai nayokelaki yo.’

[34] Mokonzi ayoki kanda penza pe atie mosali wana na boloko po ázwa etumbu tii tango akofuta nyongo nyonso.”

[35] Bongo Yezu asukisi boye: “Tata na ngai ya Likolo akosala bino pe ndenge wana, soki moko moko na kati na bino alimbisaka ndeko na ye na motema mobimba té.”

Matié — Chapters