[1] “Bótala bizaleli ya bato té; soki té Nzambe pe akotala bizaleli na bino.
[2] Pamba té Nzambe akotala bino ndenge bino botalaka bato; pe akosala bino mabe to malamu, kaka ndenge bino bosalaka bango.
[3] Po na nini ozali kotala mwa-lititi oyo ekoti na liso ya ndeko na yo? Nzokande ozali na nzete na liso na yo moko, kasi ozali komona yango té.
[4] Ozali koloba na ndeko na yo: ‘Tika nálongola yo mwa-lititi oyo ekoti yo na liso.’ Ndenge nini okoki koloba bongo? Na liso na yo moko nzete ezali, kasi ozali kotala yango pamba.
[5] Moto ya lokuta! Longola liboso nzete oyo ezali na liso na yo, bongo okomona malamu po na kolongola mwa-lititi oyo ezali na liso ya ndeko na yo.
[6] “Bópesa biloko ya bosantu na bambwa té, soki té bakozonga po báswa bino; bóbwaka bapauni na bino liboso ya bangulu té, soki té bakonyata yango.”
[7] “Bósenga pe bokozwa; bóluka pe bokomona; bóbeta porte bongo bakofungolela bino.
[8] Pamba té moto nyonso oyo asengaka, azwaka; moto nyonso oyo alukaka, amonaka; pe moto nyonso oyo abetaka porte, bafungolelaka ye.
[9] Nani na kati na bino akoki kopesa mwana na ye libanga, soki asengi ye bilei?
[10] Nani akoki kopesa ye nyoka, soki asengi ye mbisi?
[11] Soki bino bato ya mabe, boyebi kopesa biloko ya malamu na bana na bino, tembe té, Tata na bino ya Likolo akopesa bino biloko eleki malamu, soki bosengi ye.
[12] “Nyonso oyo bolingaka 'tè básala bino, bino pe bósala yango na bato mosusu. Wana ezali tina ya Mibeko ya Moize pe ya mikanda ya baprofete.”
[13] “Bókota na porte ya moke. Pamba té porte ya kokotela na mboka ya bato bakufá libela ezali monene, pe nzela oyo ememaka bato kuna ezali pasi té; yango wana bato mingi balandaka yango.
[14] Kasi porte ya kokotela na mboka ya bato bazali na bomoi ezali moke, pe nzela oyo ememaka bato kuna ezali kaká; yango wana bato mingi balandaka yango té.”
[15] “Bókeba na baprofete ya lokuta! Bayaka epai na bino na poso ya bameme, kasi na mitema na bango bazali bankoi; balingaka kolia bino.
[16] Bokoyeba bango na misala na bango. Na nzete ya sende babukaka mbuma ya vinu té. Pe na nzete ya nzube bazwaka mbuma ya figi té.
[17] Nzete ya malamu ebotaka mbuma ya malamu; kasi nzete ya mabe ebotaka mbuma ya mabe.
[18] Nzete ya malamu ekoki kobota mbuma ya mabe té; pe nzete ya mabe ekoki kobota mbuma ya malamu té.
[19] Nzete nyonso oyo ebotaka mbuma ya malamu té, bakataka yango pe babwakaka yango na móto.
[20] Boye, po na koyeba baprofete ya lokuta, bótala misala na bango.”
[21] “Ezali té baoyo balobaka na ngai: ‘Mokonzi, Mokonzi' nde bakokóma bato ya bokonzi ya Likolo; kasi bobele bato oyo basalaka makambo Tata na ngai ya Likolo alingaka.
[22] Mokolo nakoya kosambisa bato, bato mingi bakoloba na ngai: ‘Mokonzi, Mokonzi, oyebi té? Na kombo na yo tosakolaki maloba euti na Molimo ya Nzambe. Na kombo na yo tolongolaki milimo mabe. Na kombo na yo tosalaki makamwisi ebele. Boye té?’
[23] Kasi ngai nakoloba na bango: ‘Nayebi bino té! Bino bozalaki kotosa Nzambe té, bólongwa liboso na ngai!’”
[24] “Yango wana, moto nyonso oyo ayoki mateya na ngai pe atosi yango, azali lokola moto ya mayele oyo atòngi ndako na ye likolo ya mabanga.
[25] Mbula ebeti, mai etondi, mopepe makasi eleki pe ebeti na ndako wana; kasi ndako ekwei té, po batòngaki yango likolo ya mabanga.
[26] Kasi moto nyonso oyo ayoki mateya na ngai pe atosi yango té, azali lokola moto moko ya zoba oyo atòngi ndako na ye likolo ya zelo.
[27] Mbula ebeti, mai etondi, mopepe makasi eleki pe ebeti na ndako wana; ndako ekwei, yango nyonso ebukani.”
[28] Tango Yezu asilisi koloba makambo wana, bato nyonso bakamwaki mingi na ndenge azalaki koteya.
[29] Pamba té ye azalaki koteya lokola balakisi-Mibeko té; kasi lokola moto azali na bokonzi.