Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 5:40

[1] Oyo ezali bakombo ya bakoko ya Yezu Kristo, moto ya libota ya David pe ya Abraham.

[2] Abraham abotaki Izaak; Izaak abotaki Jakob; Jakob abotaki Yuda ná bandeko na ye;

[3] Yuda abotaki Peres ná Zera (mama na bango ezalaki Tamar); Peres abotaki Hesron; Hesron abotaki Ram;

[4] Ram abotaki Aminadab; Aminadab abotaki Nashon; Nashon abotaki Salmon;

[5] Salmon abotaki Booz (mama na ye ezalaki Rahab); Booz abotaki Obed (mama na ye ezalaki Rut);

[6] Obed abotaki Jesé; Jesé abotaki David. Mokonzi David abotaki Salomon (mama na ye ezalaki mwasi ya Uriya);

[7] Salomon abotaki Roboam; Roboam abotaki Abiya; Abiya abotaki Asa;

[8] Asa abotaki Jozafat; Jozafat abotaki Yoram; Yoram abotaki Azarya;

[9] Azarya abotaki Yotam; Yotam abotaki Akaz; Akaz abotaki Ezekiya;

[10] Ezekiya abotaki Manasé; Manasé abotaki Amon; Amon abotaki Yoshiya;

[11] Yoshiya abotaki Yoyakin ná bandeko na ye tango bamemaki bato ya Yuda na boumbu na Babilone.

[12] Na sima tango bamemaki bato ya Israel na boumbu na Babilone, Yoyakin abotaki Shaltiel; Shaltiel abotaki Zorobabel;

[13] Zorobabel abotaki Abiud; Abiud abotaki Eliakim; Eliakim abotaki Azor;

[14] Azor abotaki Sadok; Sadok abotaki Akim; Akim abotaki Eliud;

[15] Eliud abotaki Eleazar; Eleazar abotaki Matan; Matan abotaki Jakob;

[16] Jakob abotaki Jozef oyo abalaki Maria. Maria azalaki mama ya Yezu oyo babengaka Kristo.

[17] Bongo kobanda na Abraham tii na David, mabota elandanaki mbala zomi na minei (14). Kobanda na David tii na tango bamemaki bato ya Yuda na boumbu na Babilone, mabota elandanaki mbala zomi na minei (14). Pe kobanda tango wana tii na mbotama ya Kristo, mabota elandanaki mbala zomi na minei (14).

[18] Yezu Kristo abotamaki boye: Mama na ye Maria azalaki mwana-mwasi oyo Jozef aponaki po ábala ye. Kasi liboso 'tè báfanda ndako moko, Maria azwaki zemi na nguya ya Molimo Mosantu.

[19] Mobali na ye Jozef azalaki moto malamu, pe alingaki ásambwisa ye té na miso ya bato. Akanaki 'tè átika ye kasi áyebisa moto moko té.

[20] Tango azalaki kokanisa boye, anjelu ya Nkolo abimeli ye na ndoto, pe alobi na ye: “Jozef mwana ya David, kobanga kobala Maria té, pamba té zemi oyo azali na yango, euti na nguya ya Molimo Mosantu.

[21] Akobota mwana-mobali pe okopesa ye kombo Yezu. Ezali ye nde moto akobikisa bato na ye na masumu na bango.”

[22] Makambo wana nyonso esalamaki po na kokokisa maloba oyo Nkolo alobaká na monoko ya profete na ye:

[23] “Elenge mwasi oyo ayebi nzoto ya mobali té akozwa zemi, akobota mwana-mobali, pe bakopesa mwana yango kombo Emanuel, elakisi: Nzambe azali na biso.”

[24] Tango Jozef alamuki na pongi, asali se ndenge anjelu ya Nkolo alakisaki ye, pe abali Maria.

[25] Kasi ayebaki nzoto na ye té tii tango abotaki mwana; bongo Jozef apesi mwana yango kombo Yezu.

Matié — Chapters