[1] Tango Yezu amoni bato ebele wana, amati likolo ya ngomba pe afandi. Bayekoli na ye bapusani pembeni na ye,
[2] pe abandi koteya bango boye:
[3] “Esengo na baoyo batiaka mitema bobele na Nzambe; bango bazali bato ya bokonzi ya Likolo.
[4] Esengo na baoyo bazali kolela; Nzambe akolongola bango mawa.
[5] Esengo na baoyo bazali na mitema ya boboto; bango bakozwa mboka oyo Nzambe alakaká.
[6] Esengo na baoyo balukaka kosala bolamu; Nzambe akotondisa bango na bolamu.
[7] Esengo na baoyo bayokelaka bato mawa; Nzambe akoyokela bango pe mawa.
[8] Esengo na baoyo bazali na mitema pembe; bango bakomona Nzambe.
[9] Esengo na baoyo bayeelaka bato boboto; Nzambe akobenga bango bana na ye.
[10] Esengo na baoyo banyokwamaka po basalaka malamu; bango bazali bato ya bokonzi ya Likolo.
[11] “Esengo na bino soki bafingaka bino, soki banyokolaka bino po bozali bayekoli na ngai, soki bakoselaka bino makambo ya ndenge na ndenge.
[12] Bósepela! Bózala na esengo, po lifuta monene ezali kozela bino na Likolo. Pamba té baprofete oyo bazalaká liboso, banyokolaki bango kaka ndenge wana.”
[13] “Bino bozali na kati ya bato lokola mungwa. Soki mungwa ebungisi elengi, ndenge nini bakoki kozongisa elengi na yango? Ezali lisusu na mosala té. Babwakaka yango na libanda pe banyataka yango.
[14] “Bino bozali na kati ya bato lokola mwinda. Mboka oyo batòngá na likolo ya ngomba ekoki kobombama té.
[15] Soki bapelisi mwinda, babombaka yango na se ya katini té, kasi batiaka yango likolo ya mesa, po éngengisa bato nyonso oyo bazali na kati ya ndako.
[16] Yango wana bosengeli kongenga liboso ya bato lokola mwinda, po bámona bolamu oyo bozali kosala, pe bákumisa Tata na bino ya Likolo.”
[17] “Bókanisa té 'tè nayei po na koboma Mibeko ya Moize pe mateya ya baprofete. Nayei po náboma yango té, kasi po na kokokisa yango.
[18] Nalobi na bino, ya solo: tii tango Likolo ná se ekolimwa, bakoki kolongola eloko moko té na Mibeko, ata mwa-letre moke, ata mwa-ndambo na yango; liboso makambo nyonso esengeli kosalama.
[19] Yango wana, moto oyo aboyaka kotosa ata mobeko ya moke, pe alakisaka bato mosusu básala bongo, akozala moto ya suka na bokonzi ya Likolo. Kasi moto oyo atosaka Mibeko pe ateyaka bato mosusu básala bongo, akozala moto ya liboso na bokonzi ya Likolo.
[20] Nalobi na bino: Bóluka kotosa Nzambe koleka balakisi-Mibeko ná ba-Farizé; soki té bokoki kokóma bato ya bokonzi ya Likolo té.”
[21] “Boyoki 'tè balobaká na bakoko boye: ‘Koboma moto té; oyo abomi moto, básambisa ye na bazuzi.’
[22] Kasi ngai nalobi na bino: moto nyonso oyo ayokeli ndeko na ye kanda, básambisa ye na bazuzi. Oyo alobi na ndeko na ye: ‘Zoba!’ básambisa ye na Likita-Monene ya banganga-Nzambe; pe oyo alobi na ndeko na ye: ‘Yo ozali na liboma!’ ebongi bátinda ye na lifelo.
[23] Soki ozali kokende na mesa ya Nzambe po na kopesa ye libonza, pe oyei kokanisa 'tè ozali na likambo ná ndeko na yo,
[24] tika libonza na yo pembeni ya mesa ya mabonza, pe kende liboso koyokana ná ndeko na yo; bongo na sima zonga pe pesa libonza na yo na Nzambe.
[25] “Soki moto afundi yo, pe bozali kokende epai ya zuzi, sala noki po bóyokana tango bozali nanu na nzela. Soki té moto yango akopesa yo na maboko ya zuzi, bongo zuzi akotinda yo epai ya basoda po bábwaka yo na boloko.
[26] Nalobi na yo, ya solo: okobima na boloko té tii tango okofuta nyongo nyonso.”
[27] “Boyoki 'tè balobaká boye: ‘Kotambola na mwasi ya bato té.’
[28] Kasi ngai nalobi na bino: soki moto atali mwasi ya bato po na kolula ye, asi'atamboli na ye na motema.
[29] Soki ozali kokweya na likambo po na liso na yo ya mobali, longola yango pe bwaka yango mosika! Ebongi malamu ólongola ndambo moko ya nzoto, esika 'tè nzoto mobimba ékende na lifelo.
[30] Soki ozali kokweya na likambo po na liboko na yo ya mobali, kata yango pe bwaka yango mosika! Ebongi malamu ólongola ndambo moko ya nzoto na yo, esika 'tè nzoto mobimba ékende na lifelo.”
[31] “Balobaká lisusu boye: ‘Soki moto aboyi mwasi na ye, ápesa ye mokanda ya koboma libala.’
[32] Kasi ngai nalobi na bino: moto nyonso oyo akoboya mwasi na ye, longola bobele soki Mibeko ezali kopekisa 'tè bábalana té, ezali lokola atindi mwasi na ye ásala kindumba. Pe moto oyo akobala mwasi ya ndenge wana azali kosala kindumba.”
[33] “Boyoki lisusu 'tè balobaká na bakoko boye: ‘Kokata seleka ya lokuta té. Kasi sala makambo oyo olakaki tango okataki seleka na miso ya Nkolo.’
[34] Kasi ngai nalobi na bino: bókata seleka ata moke té. Ézala na kombo ya Likolo, po ezali Kiti ya bokonzi ya Nzambe;
[35] to na kombo ya mabelé, po ezali esika Nzambe atiaka makolo na ye; to na kombo ya Yeruzalem, po ezali mboka ya Mokonzi monene.
[36] Kokata seleka ata moke té po na motú na yo, pamba té okoki kokómisa suki na yo pembe té to mwindu.
[37] Bólobaka kaka ‘Ezali bongo’, to ‘Ezali bongo té’. Makambo nyonso oyo babakisaka na maloba wana, eutaka na Monguna ya Nzambe.”
[38] “Boyoki 'tè balobaká boye: ‘Soki moto atoboli yo liso, yo pe tobola ye liso; pe soki alongoli yo lino, yo pe longola ye lino.’
[39] Kasi ngai nalobi na bino: soki moto asali yo mabe, kozongisela ye mabe té. Soki moto abeti yo mbata na litama, pesa ye litama mosusu.
[40] Soki moto alingi kofunda yo na tribinal po ázwa shemize na yo, pesa ye pe kazaka na yo.
[41] Soki moto atindi yo na makasi po ómemela ye kilo mwa-moke, yo mema yango mosika.
[42] Soki moto asengi yo eloko, pesa ye; soki alingi kodefa eloko epai na yo, defisa ye.”
[43] “Boyoki 'tè balobaká boye: ‘Linga moninga na yo, yina monguna na yo.’
[44] Kasi ngai nalobi na bino: bólingaka banguna na bino, bósambelaka po na bato oyo banyokolaka bino.
[45] Soki bongo, bokozala penza bana ya Tata na bino ya Likolo. Pamba té ye angengisaka moi na ye na bato ya mabe pe na bato ya malamu; anokisaka mbula epai ya bato oyo basalaka malamu pe epai ya baoyo basalaka mabe.
[46] Soki bolingaka kaka bato oyo balingaka bino, lifuta nini Nzambe akopesa bino? Ata bafutisi-mpaku basalaka kaka ndenge wana!
[47] Soki bopesaka mbote kaka na bandeko na bino, wana bosali likambo ya kokamwa? Té! Ata baoyo bayebi Nzambe té basalaka kaka ndenge wana!
[48] Bózala bato ya kokoka, ndenge Tata na bino ya Likolo azali ya kokoka.”