[1] Na tango wana, mokonzi Erode ayoki sango ya Yezu,
[2] alobi na basali na ye: “Ezali Yoane Mobatisi moto asekwi; yango wana azwi nguya ya kosala makamwisi boye.”
[3] Pamba té Erode akangisaki Yoane pe atiaki ye na boloko, po na likambo ya Erodiade, mwasi ya kulutu na ye Filipe. Erode abalaki ye,
[4] kasi Yoane alobaki na ye: “Mibeko ezali kopekisa 'tè okoki kobala ye té.”
[5] Erode alingaki koboma Yoane, kasi azalaki kobanga bato, pamba té bazalaki komona Yoane Mobatisi lokola profete.
[6] Nzokande mokolo Erode asalisaki feti ya mbotama na ye, mwana ya Erodiade ya mwasi abinaki liboso ya bato oyo babengisaki. Asepelisaki Erode mingi,
[7] yango wana Erode akataki seleka 'tè akopesa ye eloko nyonso ye akosenga.
[8] Mwana alandi maloba ya mama na ye pe asengi na Erode boye: “Pesa ngai sik'oyo motú ya Yoane Mobatisi na sani.”
[9] Mokonzi Erode ayoki mawa penza. Kasi alingaki kopimela ye té, po akataki seleka na miso ya bato oyo abengisaki na feti, bongo atindi bápesa ye yango.
[10] Atindi moto moko ákende kokata motú ya Yoane Mobatisi na boloko.
[11] Bamemi motú yango na sani pe bapesi yango na elenge mwasi; ye akei kopesa na mama na ye.
[12] Bayekoli ya Yoane bayei kokamata ebembe na ye, pe bakundi yango. Bongo bakei koyebisa Yezu makambo oyo elekaki.
[13] Awa Yezu ayoki sango ya liwa ya Yoane Mobatisi, alongwe kuna na bwatu pe akei ye moko na esika ya kimia na esobe. Kasi bato bayei koyeba yango, bongo babimi na bamboka, pe balandi ye na makolo.
[14] Boye tango Yezu abimi na bwatu, amoni bato ebele pe ayokeli bango mawa mingi na motema; bongo abandi kobikisa bato na bango ya maladi.
[15] Na pokwa bayekoli bayei epai ya Yezu, pe balobi na ye: “Esika oyo ezali esobe pamba, pe ngonga esi'eleki. Yebisa bato bákende na bamboka kosomba biloko ya kolia.”
[16] Yezu azongiseli bango: “Tina ezali té po bákende. Bino moko bópesa bango biloko ya kolia.”
[17] Kasi bango balobi na ye: “Awa tozali kaka na mapa mitano, ná bambisi mibale!”
[18] Yezu azongiseli bango: “Bómemela ngai yango.”
[19] Bongo alobi na bato nyonso báfanda na matiti ya esobe; na sima akamati mapa mitano wana ná bambisi mibale, atali na likolo, apesi Nzambe mersi, akatikati yango pe apesi na bayekoli na ye. Bongo bayekoli na ye bakaboli yango na bato.
[20] Bato nyonso balei pe batondi. Bayekoli balokoti biteni oyo etikalaki pe batondisi na yango bitunga zomi na mibale.
[21] Bato oyo baliaki bazalaki mibali soki 5.000, kotanga basi ná bana té.
[22] Sima na yango, Yezu atindi bayekoli na ye bákota na bwatu pe bákende kozela ye na ngambo. Azongisi bato na bamboka na bango, kasi ye atikali kuna.
[23] Bongo amati ye moko na ngomba po na kosambela. Na pokwa, azalaki kaka ye moko;
[24] bongo bwatu ekómaki na kati ya laki; mbonge ezalaki kobeta yango po mopepe ezalaki makasi.
[25] Tango tongo elingaki kotana, Yezu abandi kotambola likolo ya mai pe ayei epai na bango.
[26] Awa bayekoli bamoni ye azali kotambola likolo ya mai, bayoki somo penza, balobi: “Ezali elima!” Pe babandi koganga po na somo.
[27] Kasi na mbala moko Yezu alobi na bango: “Ezali ngai; bótika kobanga.”
[28] Bongo Piere alobi na ye: “Mokonzi, soki ezali yo, loba na ngai nátambola likolo ya mai pe náya epai na yo.”
[29] Yezu azongiseli ye: “Yaka!” Piere abimi na bwatu, pe abandi kotambola likolo ya mai po na kokende epai ya Yezu.
[30] Kasi tango amoni mopepe ezali koleka, ayoki somo mingi, pe lokola azalaki kodinda na mai agangi: “Mokonzi, bikisa ngai!”
[31] Na mbala moko Yezu atandi liboko, asimbi ye pe alobi na ye: “Moto ya bondimi moke! Po na nini otiaki tembe?”
[32] Bongo bakoti bango mibale na bwatu pe mopepe esili.
[33] Bayekoli oyo bazalaki na kati ya bwatu bafukami liboso ya Yezu, pe balobi: “Ya solo, yo ozali mwana ya Nzambe!”
[34] Awa basilisi kokatisa laki, bakómi na mabelé ya Jenezaret.
[35] Bato wana bayebaki Yezu kala, bongo tango bamoni ye bapanzi sango bipai nyonso, pe bamemeli ye bato nyonso ya maladi.
[36] Babondeli ye ápesa bango nzela ya kosimba ata songe ya nzambala na ye. Pe bato nyonso oyo bazalaki kosimba ye, babandaki kobika.