[1] “Bóyoka ndenge Nzambe akosala na bokonzi ya Likolo. Ekozala lokola moto moko oyo abimaki na tongo-tongo po ákende koluka bato bakoki kosala na bilanga na ye ya vinu.
[2] Ayokanaki na bango 'tè bakozwa lifuta ekoki na mokolo moko, pe atindi bango na bilanga na ye.
[3] Abimi lisusu na ngonga ya libwa ya tongo, pe amoni bato mosusu oyo bazangi mosala bafandi na zando.
[4] Alobi na bango: ‘Bino pe bókende kosala na bilanga na ngai; nakofuta bino lifuta ekoki.’
[5] Bango pe bakei. Kolo ya bilanga abimi lisusu na midi pe na ngonga ya misato ya pokwa, asali kaka ndenge moko.
[6] Na ngonga ya mitano ya pokwa abimi, amoni bato mosusu bafandi na zando. Atuni bango: ‘Po na nini bofandi awa moi mobimba, ata mosala té?’
[7] Bango balobi: ‘Moto ya kozwa biso na mosala azali té.’ Ye azongiseli bango: ‘Bino pe bókende kosala na bilanga na ngai.’
[8] “Tango pokwa ebandi koya, kolo ya bilanga alobi na kapita: ‘Benga basali nyonso pe futa bango. Banda na bato oyo nazwaki sima, tii na baoyo nazwaki liboso.’
[9] Bato oyo babandaki kosala na ngonga ya mitano ya pokwa bayei, pe moto na moto azwi lifuta ekoki na mokolo mobimba.
[10] Tango bato oyo babandaki mosala na tongo bayei, bakanisaki 'tè bakozwa mbongo koleka bamosusu, kasi bapesi bango pe kaka lifuta ya mokolo moko.
[11] Awa bazwi yango, bakómi koyimayima po na kolo ya bilanga
[12] pe balobi: ‘Bato oyo ozwaki na sima basali kaka ngonga moko, pe ofuti bango ndenge moko ná biso. Kasi biso tosali mokolo mobimba pe tolembi na moi makasi.’
[13] Kolo ya bilanga azongiseli moko na bango: ‘Ndeko na ngai, nakosi yo té. Toyokanaki 'tè nakofuta yo lifuta ekoki po na mokolo moko.
[14] Kamata mbongo na yo, kende. Kasi moto oyo abandaki mosala sima, nalingi kofuta ye ndenge moko ná yo.
[15] Boni? Ezali mbongo na ngai. Nakoki kosala na yango té ndenge ngai moko nalingi? Oyoki likunya po nazali moto malamu?’”
[16] Bongo Yezu asukisi boye: “Yango wana, bato oyo bazali na suka bakokóma liboso; pe baoyo bazali liboso, bakokóma na suka.”
[17] Tango Yezu azalaki kokende na Yeruzalem, na nzela abengi bayekoli na ye zomi na mibale pembeni, pe alobi na bango boye:
[18] “Bóyoka! Tozali kokende na Yeruzalem. Kuna bakokaba mwana ya Moto epai ya bakonzi ya banganga-Nzambe pe ya balakisi-Mibeko. Bango bakokatela ye etumbu ya liwa,
[19] pe bakokaba ye na maboko ya bato bayebi Nzambe té. Bakoseka ye, bakobeta ye fimbu, pe bakoboma ye na kuruze. Kasi akosekwa na mikolo misato.”
[20] Bobele na tango wana mwasi ya Zebedé ayei epai ya Yezu, ná bana na ye mibale. Afukameli ye po na kosenga likambo moko.
[21] Yezu atuni ye: “Olingi nini mama?” Ye azongisi: “Mokonzi, laka ngai 'tè tango okozwa bokonzi na yo, bana na ngai mibale oyo bakozala kofanda pembeni na yo na bisika ya lokumu, moko na liboko ya mobali, mosusu na liboko ya mwasi.”
[22] Yezu azongisi: “Likambo bozali kosenga, boyebi yango té. Kopo ya pasi ngai nakomela, bino bokokoka yango?” Bango bazongiseli ye: “Tokokoka kaka.”
[23] Bongo Yezu alobi na bango: “Ya solo, kopo oyo ngai nakomela, bino pe bokomela yango. Kasi kopona moto oyo akofanda na liboko na ngai ya mobali to ya mwasi, etali ngai té; pamba té Tata asi'abongisá bisika wana po na bato ye aponá.”
[24] Tango bayekoli mosusu zomi bayoki ndenge wana, basilikeli bandeko yango mibale.
[25] Bongo Yezu abengi bango nyonso pe alobi: “Boyebi 'tè bakonzi ya bikolo balakisaka bokonzi na bango; pe bato minene bamonisaka bato na bango pasi.
[26] Kasi na kati na bino, ekoki kozala bongo té. Soki moto moko na kati na bino alingi kozala moto monene, ámitia mosali na bino.
[27] Pe soki moto moko na kati na bino alingi kozala moto ya liboso, ámikómisa moumbu na bino.
[28] Pamba té mwana ya Moto ayaki po bato básalela ye té, kasi ayaki nde kosalela bango, pe kopesa bomoi na ye po na kolongola bato ebele na boumbu.”
[29] Tango babimi na Jerikó, bato ebele balandi Yezu.
[30] Bato mibale bakufá miso bafandaki pembeni ya nzela. Awa bayoki Yezu azali koleka, babandi koganga: “Mokonzi, mwana ya David, yokela biso mawa!”
[31] Bato bagangeli bango bákanga minoko. Kasi bango balekisi penza koganga makasi: “Mokonzi, Mwana ya David, yokela biso mawa!”
[32] Yezu atelemi, abengi bango pe atuni: “Bolingi násala nini po na bino?”
[33] Bango bazongiseli ye: “Mokonzi, tolingi miso na biso éfungwama!”
[34] Yezu ayokeli bango mawa pe asimbi bango na miso. Kaka na tango wana babandi komona pe balandi ye.