Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 9:29

[1] Mokolo wana Yezu abimi na ndako pe akei kofanda pembeni ya ebale po na koteya.

[2] Bato ebele bayei kotondana penepene na ye, yango wana Yezu akotaki na bwatu pe afandi wana; bato nyonso batelemaki na mokili.

[3] Yezu ayebisi bango makambo mingi na masapo. Alobi: “Moto moko akendeki kokona mbuma na elanga na ye.

[4] Tango azalaki kobwakabwaka mbuma, mbuma mosusu ekwei na nzela, pe bandeke eyei kolia yango.

[5] Mbuma mosusu ekwei na esika ya mabanga; kuna mabelé ezalaki mingi té, yango wana eboti noki-noki.

[6] Tango moi ekómi makasi, eziki pe ekauki, po misisa ezalaki mikuse.

[7] Mbuma mosusu ekwei na kati ya basende. Basende wana ekoli pe ebomi matiti ya malamu.

[8] Kasi mbuma mosusu ekwei na mabelé ya malamu, pe eboti: mosusu eboti bambuma kama moko (100), mosusu tuku motoba (60); pe mosusu tuku misato (30).”

[9] Bongo Yezu alobi lisusu: “Moto azali na matoi, áyoka!”

[10] Bayekoli bapusani penepene ya Yezu pe batuni ye boye: “Po na nini ozali kolobela bango na masapo?”

[11] Ye azongiseli bango: “Bino bokoki koyeba basekelé ya bokonzi ya Likolo; kasi bango bakoki koyeba yango té.

[12] Pamba té moto oyo azali na biloko mingi, bakobakisela ye mosusu; kasi oyo azangi biloko, bakobotola ye ata mwa-ndambo oyo azali na yango.

[13] Nazali kolobela bango na masapo, po ata batali, bazali komona té; pe ata batie matoi, bazali koyoka té pe koyeba tina té.

[14] Na ndenge wana bazali kokokisa makambo Nzambe alobaká na monoko ya profete Ezaya: ‘Ata boyoki ndenge nini, bokoyeba té; ata botali ndenge nini, bokomona té.

[15] Pamba té bato oyo bazangá makanisi; bazali kozipa matoi na bango, bazali kokanga miso na bango po bámona té, báyoka té pe báyeba penza té. Soki té balingaki kobongola mitema po nábikisa bango.’

[16] “Esengo mingi na bino po miso na bino ezali komona, pe matoi na bino ezali koyoka.

[17] Nalobi na bino, ya solo: baprofete mingi pe bato ya bosembo bazalaká na posa ya komona makambo oyo bino bozali komona, kasi bamonaki yango té; pe bazalaká na posa ya koyoka makambo oyo bino bozali koyoka, kasi bayokaki yango té.”

[18] “Bóyoka ndimbola ya lisapo ya mokoni-bilanga.

[19] Bato oyo bayoki sango ya bokonzi, pe bazweli yango makanisi té, bakokani ná mbuma oyo ekwei na nzela: Monguna ayei pe alongoli mbuma oyo bakoni na mitema na bango.

[20] Bato mosusu bakokani ná mbuma oyo ekwei na mabelé oyo etondá na mabanga: Tango bayoki maloba ya Nzambe, bandimi yango noki na esengo.

[21] Kasi misisa ekoli té na mitema na bango; bandimi kaka na mwa-tango moke. Soki bamoni pasi to minyokoli po na maloba ya Nzambe, batiki bondimi na bango noki.

[22] Bato mosusu bakokani ná mbuma oyo ekwei na kati ya basende. Bayoki maloba ya Nzambe, kasi pasi ya mokili pe bisengo ya bomengo oyo ekosaka bato enyati maloba yango, bongo eboti té.

[23] Bato mosusu bakokani ná mbuma oyo ekwei na mabelé ya malamu. Bayoki maloba ya Nzambe pe bazweli yango makanisi, bongo bayei kobota mbuma, bamosusu bambuma kama moko (100), bamosusu tuku motoba (60), pe bamosusu tuku misato (30).”

[24] Yezu abeteli bango lisapo mosusu, alobi: “Bóyoka ndenge bokonzi ya Likolo ezali. Ezali lokola moto moko oyo akonaki mbuma ya malamu na elanga na ye ya blé.

[25] Mokolo moko na butu, tango bato nyonso bazalaki na pongi, monguna ya moto wana ayei, akoni matiti ya mabe na elanga, bongo akei.

[26] Tango mbuma ebimi, blé ekoli, matiti ya mabe pe ebimi.

[27] Basali bayei koloba na kolo ya elanga: ‘Tata, yo okonaki mbuma ya malamu na elanga na yo; bongo matiti oyo ya mabe euti wapi?’

[28] Ye azongiseli bango: ‘Ezali monguna na ngai moto asali boye.’ Bato ya mosala batuni ye: ‘Olingi tókende kolongola matiti ya mabe yango?’

[29] Ye azongiseli bango: ‘Té! Pamba té soki bomeki kopikola matiti ya mabe, tango mosusu bokoki kolongola pe mwa-ndambo ya blé.

[30] Bótika yango nyonso ékola esika moko tii tango bakobuka mbuma; bongo na tango wana nakoloba na bato ya mosala: bólongola liboso matiti ya mabe, pe bókangisa yango maboke maboke po na kotumba yango; na sima bókotisa blé na ndako oyo nabombaka biloko na ngai.’”

[31] Yezu abeteli bango lisapo mosusu, alobi: “Bokonzi ya Likolo ekokani na mbuma babengaka ‘mutarde’, oyo moto moko akoni na elanga na ye.

[32] Mbuma wana ezali moke penza koleka bambuma nyonso. Kasi soki ebimi pe ekoli, elekaka ndunda nyonso na molai, ekómaka nzete pe ebimisaka bitape esika bandeke ekoki kosala bazála na yango.”

[33] Yezu abeteli bango lisapo mosusu, alobi: “Bokonzi ya Likolo ekokani na kisi ya mapa: mama moko asangisi yango na sani monene ya farine, bongo farine nyonso eyei kovimba.”

[34] Yezu alobelaki bato makambo nyonso wana na masapo. Azalaki koloba na bango bobele na masapo.

[35] Asalaki bongo po na kokokisa maloba oyo profete asakolaká: “Nakolobela bango na masapo. Nakoyebisa bango makambo oyo ebombamá banda mokili esalamá.”

[36] Tango Yezu atiki bato pe azongi na ndako, bayekoli na ye bapusani penepene na ye, bongo balobi: “Limbolela biso lisapo ya matiti mabe ya elanga.”

[37] Yezu azongisi boye: “Moto oyo akoni mbuma ya malamu ezali mwana ya Moto.

[38] Elanga ezali mokili; mbuma malamu ezali bato oyo bandimi bokonzi ya Likolo; matiti mabe ezali bato ya Monguna;

[39] monguna oyo akoni matiti ya mabe ezali zabolo. Tango ya kobuka blé ezali Mokolo ya suka, pe bato basalaka na elanga ezali ba-anjelu.

[40] Na Mokolo ya suka ekozala lokola tango balongolaka matiti ya mabe po na kotumba yango.

[41] Mwana ya Moto akotinda ba-anjelu na ye, bongo na bokonzi na ye mobimba bakolongola bato nyonso oyo bakweisaka baninga na likambo, pe baoyo basalaka mabe;

[42] bakobwaka bango na lifelo, esika balelaka pe baliaka mino.

[43] Na tango wana bato oyo batosaka Nzambe bakongenga lokola moi na mboka bokonzi ya Tata na bango. Moto azali na matoi, áyoka!”

[44] “Kokóma moto ya bokonzi ya Likolo ezali lokola kozwa eloko ya talo oyo ebombamá na mabelé. Soki moto moko amoni yango, abombi yango lisusu. Ayoki esengo mingi; akei koteka biloko na ye nyonso pe asombi mabelé wana.

[45] “Oyo alingi kokóma moto ya bokonzi ya Likolo, esengeli ásala lokola moto ya mombongo oyo azali koluka bapauni ya kitoko.

[46] Tango amoni pauni ya talo mingi, akei koteka biloko na ye nyonso pe asombi pauni wana.

[47] “Bokonzi ya Likolo ezali lokola monyama moko babwaki na mai pe ezali kokanga bambisi ya ndenge na ndenge.

[48] Soki etondi, baluki-mbisi babendaka yango na mokili, bongo bafandaka po na kopona mbisi. Batiaka bambisi ya malamu na bitunga, pe babwakaka oyo ya mabe.

[49] Ekozala bongo na mokolo ya suka: ba-anjelu bakoya kopona bato ya malamu, pe bakobwaka bato ya mabe na lifelo. Kuna bakolela pe bakolia mino.”

[51] Yezu atuni bango: “Boyoki makambo oyo nyonso malamu?” Bango bazongisi: “Ee, toyoki.”

[52] Bongo Yezu alobi na bango: “Yango wana, molakisi-Mibeko nyonso oyo ayekolá makambo ya bokonzi ya Likolo, akokani ná kolo ya ndako oyo azali na biloko mingi, bongo abimisaka biloko ya sika pe ya kala.”

[53] Tango Yezu asilisi koloba makambo wana, alongwe kuna

[54] pe akei na mboka na ye penza esika akolaki. Azalaki koteya na ndako ya lisanga; bongo bato bakamwe mingi penza pe batunani: “Epai wapi azweli mayele oyo? Ndenge nini azali kosala makamwisi boye?

[55] Ye azali mwana ya sharpantié té? Mama na ye Maria té? Jake, Jozef, Simon ná Yuda bazali bandeko na ye té?

[56] Bandeko na ye nyonso ya basi bazali awa na biso té? Ye azwi makambo nyonso oyo wapi?”

[57] Yango wana baboyaki kondimela ye. Kasi Yezu alobi na bango: “Bapesaka profete lokumu bipai nyonso, longola kaka na mboka na ye penza pe na ndako na ye moko.”

[58] Yezu asalaki makamwisi mingi kuna té, po bango bazangaki bondimi.

Matié — Chapters