[1] Bongo Yezu alobi boye na bato ebele pe na bayekoli na ye:
[2] “Balakisi-Mibeko ná ba-Farizé mosala na bango, kolimbolela bato Mibeko ya Moize.
[3] Bongo bótosaka bango pe bósalaka makambo nyonso bakobanda koloba na bino; kasi bólandaka bizaleli na bango té. Pamba té makambo balobaka, basalaka yango té.
[4] Bakangaka mikumba ya kilo pe batiaka yango na mapeka ya bato, kasi bango moko basimbaka yango ata na mosapi té.
[5] Misala nyonso oyo basalaka, balukaka kaka bato bámona yango. Biteni ya Mikanda ya Nzambe oyo bato balataka na tango ya kosambela, bango bakómisaka yango milai penza; pe batòngaka basonge ya minene na banzambala na bango.
[6] Balingaka bisika ya lokumu na bafeti, pe bakiti ya liboso na bandako ya lisanga;
[7] balingaka bato bápesaka bango bambote na bazando, pe bábengaka bango ‘Moteyi’.
[8] Kasi bino bólingaka té 'tè bábengaka bino ‘Moteyi’, pamba té bino nyonso bozali bandeko, pe bozali na Moteyi moko kaka.
[9] Awa na mokili, bóbengaka moto moko té ‘Tata'; pamba té bozali na Tata moko kaka oyo azali na Likolo.
[10] Bólingaka té 'tè bato bábengaka bino ‘Mokonzi’, pamba té bozali na Mokonzi moko kaka, ezali Mesia.
[11] Moto aleki bino nyonso akozala mosali na bino.
[12] Moto oyo amikumisaka, Nzambe akitisaka ye; pe moto oyo amikitisaka, Nzambe akumisaka ye.”
[13] “Mawa na bino balakisi-Mibeko pe ba-Farizé! Bato ya lokuta! Bozali kokangela bato nzela oyo bakoki kokotela na bokonzi ya Likolo. Bino moko bozali kokota té, pe bozali kopekisa bato oyo balingi kokota.
[14] [“Mawa na bino balakisi-Mibeko ná ba-Farizé! Bato ya lokuta! Bobotolaka biloko nyonso ya basi oyo bakufelá mibali. Pe kaka na tango wana bokosanaka kosambela mingi. Yango wana bokozwa etumbu eleki monene!]
[15] “Mawa na bino balakisi-Mibeko ná ba-Farizé! Bato ya lokuta! Botambolaka mokili mobimba po na kozwa mopaya moko oyo akondima kosambela Nzambe na biso Bayuda; pe soki bozwi ye bokómisaka ye moto ya lifelo penza koleka bino.
[16] “Mawa na bino bolakisaka bato nzela, nzokande bokufá miso! Pamba té bolobaka boye: ‘Soki moto akati seleka na kombo ya Ndako ya Nzambe, ezali likambo té. Kasi soki akati seleka na kombo ya or oyo babombá na Ndako ya Nzambe, esengeli átosa seleka na ye.’
[17] Bazoba! Bato bakufá miso! Ná or ná Ndako ya Nzambe nini eleki? Or ekómi eloko ya bosantu bobele po batie yango na Ndako ya Nzambe.
[18] Bolobaka lisusu 'tè: ‘Soki moto akati seleka po na mesa oyo bazikiselaka Nzambe mabonza, ezali likambo té; kasi soki akati seleka na kombo ya libonza oyo ezali na likolo ya mesa, esengeli átosa seleka na ye.’
[19] Bato bakufá miso! Ná libonza ná mesa nini eleki? Libonza ekómi eloko ya bosantu po batie yango na mesa ya Nzambe.
[20] Moto oyo akataka seleka po na kombo ya mesa ya Nzambe, akati yango po na kombo ya mesa ná ya biloko nyonso ezali na likolo na yango.
[21] Oyo akataka seleka na kombo ya Ndako ya Nzambe, akati yango na kombo ya Ndako ya Nzambe ná ya Nzambe oyo afandaka na kati.
[22] Pe oyo akataka seleka po na kombo ya Likolo, akati yango po na kombo ya kiti ya Nzambe ná ya Nzambe oyo afandaka na yango.
[23] “Mawa na bino balakisi-Mibeko ná ba-Farizé! Bato ya lokuta! Bolongolelaka Nzambe eteni moko na kati ya biteni zomi ya mwa-makasa ya sòlo kitoko, kasi bobosanaka mibeko oyo eleki minene: kosala bato bolamu, koyokela bango mawa, pe kozala bato ya solo. Wana ezali makambo bosengeli kosala, nzokande kobosana pe té oyo ya liboso.
[24] Batambwisi bokufá miso! Bolongolaka ngungi na mai ya komela, kasi bodundaka nyama monene oyo babengaka shamó!
[25] “Mawa na bino balakisi-Mibeko ná ba-Farizé! Bato ya lokuta! Bosukolaka libanda ya bakopo pe ya basani, kasi na kati ya mitema botondá na moyibi pe na baposa ya mabe.
[26] Ba-Farizé bokufá miso! Bósukola liboso kopo na kati, bongo libanda na yango ekokóma pe peto!
[27] “Mawa na bino balakisi-Mibeko ná ba-Farizé! Bato ya lokuta! Bozali lokola basimetiere bapakolá pembe; na libanda ezali komonana kitoko, kasi na kati etondá na mikuwa ya bato bakufá pe na bosoto ya ndenge na ndenge.
[28] Bino pe na libanda bozali komonana lokola bato ya malamu, kasi na kati botondá na lokuta pe na mabe.”
[29] “Mawa na bino balakisi-Mibeko ná ba-Farizé! Bato ya lokuta! Botòngelaka baprofete bamonimá ya kitoko, pe bobongisaka basimetiere ya bato ya bosembo.
[30] Bolobaka: ‘Soki tózalaka na tango ya bakoko na biso, mbele tolingaki kosangana ná bango té po na koboma baprofete.’
[31] Boye bino moko bondimaka 'tè bozali bana ya bato oyo babomaká baprofete;
[32] bongo sik'oyo bósilisa kaka mosala bakoko na bino babandaká.
[33] Bino banyoka oyo! Ndenge nini bokosala, po na kokima etumbu ya lifelo?
[34] Bóyoka malamu: nakotindela bino baprofete ná bato ya mayele pe balakisi-Mibeko. Kasi bokoboma bamosusu na mbeli to na mabanga pe bamosusu na kuruze; bokobeta bamosusu fimbu na bandako ya lisanga, pe bokonyokola bango bipai na bipai.
[35] Yango wana, bozali komema ngambo ya makila ya bato nyonso ya bosembo oyo babomaká, kobanda na Abel tii na Zakarya, mwana ya Berekya, oyo babomaká na kati ya Ndako ya bosantu ná mesa ya mabonza.
[36] Nalobi na bino, ya solo: bino bokozwa etumbu po na makambo nyonso wana!”
[37] “A bino bato ya Yeruzalem! Tango Nzambe atindelaka bino baprofete, boboyaka bango pe bobomaka bango na mabanga. Nzokande ngai, mbala na mbala namekaki kosangisa bino pembeni na ngai, ndenge soso esangisaka bana na yango na se ya mapapu; kasi bino boboyaki.
[38] Yango wana Nzambe akosundola mboka na bino pe ekobeba.
[39] Nalobi na bino, bokomona ngai lisusu té tii tango bokoloba: ‘Nkolo ábenisa moto oyo ayei na kombo na ye!’”