Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 8:41

[1] Tango bakómi penepene ya Yeruzalem, na mboka Betfajé, pembeni ya Ngomba ya ba-Olive, Yezu atindi bayekoli mibale,

[2] pe alobi na bango: “Bókende na mboka oyo etalani ná bino. Kuna bokomona punda ya mwasi bakangá esika moko ná mwana na yango. Bófungola yango pe bómemela ngai.

[3] Soki moto atuni bino, bóloba na ye: ‘Mokonzi azali na posa na yango’, bongo akopesa bino yango noki.”

[4] Makambo wana esalamaki po na kokokisa maloba oyo profete alobaká:

[5] “Bóloba na vile ya Sion: tala mokonzi na yo ayei epai na yo. Ayei na boboto, amati na punda, afandi likolo ya mwana punda.”

[6] Bayekoli bakei pe basali ndenge Yezu atindaki.

[7] Bamemi punda ná mwana na yango; batie yango bilamba na bango, pe Yezu amateli yango.

[8] Bato ebele bazalaki kotanda bilamba na bango na nzela; bamosusu bazalaki kokata mandalala pe kotia yango na bisika Yezu alingaki koleka.

[9] Bato oyo bazalaki liboso ya Yezu ná baoyo bazalaki kolanda ye babandaki koganga: “Ozana na Mwana ya David! Nkolo ábenisa moto oyo ayei na kombo na ye! Ozana na Nzambe na Likolo!”

[10] Tango Yezu akoti na Yeruzalem, mboka mobimba eningani, pe bato babandi kotuna: “Moto oyo azali nani?”

[11] Bato bayaki ná Yezu bazongisi: “Ezali profete Yezu, auti na Nazaret, na rejion ya Galilé.”

[12] Yezu akoti na Ndako ya Nzambe, abengani bato nyonso oyo bazalaki koteka pe kosomba biloko kuna: abaloli bamesa ya bato bazalaki koshanjé mbongo, ná bakiti ya baoyo bazalaki koteka bapijon.

[13] Na sima alobi na bango: “Ekòmamá boye: ‘Ndako na ngai bakobenga yango ndako ya losambo.’ Kasi bino bokómisi yango esika bamiyibi bakutanaka.”

[14] Bato bakufá miso ná bato bakufá makolo bayei penepene ya Yezu na Ndako ya Nzambe, pe ye abikisi bango.

[15] Bakonzi ya banganga-Nzambe ná balakisi-Mibeko basiliki tango bamonaki makamwisi ye azalaki kosala, pe ndenge bana bazalaki koganga na kati ya Ndako ya Nzambe: “Ozana na Mwana ya David!”

[16] Bongo balobi na Yezu: “Oyoki makambo bango bazali koloba?” Yezu azongiseli bango: “Ee nayoki. Nanu botangá Mikanda ya Nzambe té? Ekòmamá boye: ‘Olakisi bana mike pe bana oyo bamelaka mabéle, ndenge bakoki kokumisa yo.’”

[17] Na sima atiki bango alongwe na Yeruzalem pe akei kolala na Betanie.

[18] Tongo etani, tango Yezu azalaki kozonga na Yeruzalem, abandi koyoka nzala.

[19] Amoni nzete moko ya figi pembeni ya nzela. Apusani penepene na yango kasi amoni mbuma té, kaka makasa pamba. Bongo alobi na nzete ya figi: “Mokolo moko té okobota lisusu mbuma!” Na mbala moko nzete ya figi ekauki.

[20] Tango bayekoli bamoni bongo, bakamwe mingi penza. Batuni Yezu: “Ndenge nini nzete oyo ekauki na mbala moko boye?”

[21] Yezu azongiseli bango: “Nalobi na bino, ya solo: soki bozali penza na bondimi, pe soki bozali kotia tembe té, bokokoka kosala makambo eleki oyo ngai nauti kosala na nzete ya figi. Bokokoka kutu koloba na ngomba oyo: ‘Longwa awa! Kende komibwaka na ebale'; pe yango ekosalama.

[22] Eloko nyonso oyo bokosenga na losambo, soki botie motema 'tè bokozwa yango, bokozwa yango kaka.”

[23] Yezu akoti na Ndako ya Nzambe pe abandi koteya bato. Bongo bakonzi ya banganga-Nzambe ná bambuta-muntu ya ekolo bayei penepene na ye pe batuni ye: “Epai wapi ozwi bokonzi ya kosala boye? Nani apesi yo bokonzi yango?”

[24] Yezu azongiseli bango: “Ngai pe nakotuna bino motuna moko kaka; soki bozongiseli ngai, nakoyebisa bino soki nazali kosala makambo oyo na bokonzi ya nani.

[25] Batisimo oyo Yoane azalaki kopesa eutaki epai wapi? Epai ya Nzambe to epai ya bato?” Kasi bango babandi kotiana tembe bango na bango, balobi: “Soki tozongisi: ‘Epai ya Nzambe’, ye akotuna biso: ‘Po na nini bondimelaki Yoane té?’

[26] Kasi soki pe tolobi: ‘Epai ya bato’, tozali kobanga, po bato nyonso bakamataka Yoane lokola profete.”

[27] Bongo bazongiseli Yezu: “Toyebi té.” Bongo Yezu alobi na bango: “Ngai pe nakoyebisa bino té soki nazali kosala makambo oyo na bokonzi ya nani.”

[28] Yezu alobi lisusu: “Bokanisi nini po na makambo oyo: Moto moko azalaki na bana mibale ya mibali. Abengi ya liboso pe alobi na ye: ‘Mwana na ngai, lelo kende kosala na elanga ya vinu.’

[29] Mwana azongisi: ‘Naboyi’. Kasi na sima abongoli makanisi pe akei kaka.

[30] Sima ya mwa-tango abengi lisusu mwana ya mibale pe alobi na ye ndenge moko. Mwana wana azongiseli ye: ‘Ee tata, nakokende.’ Kasi akei té.

[31] Nani na kati ya bana wana mibale asali makambo tata alingi?” Bango bazongisi: “Mwana ya liboso.” Bongo Yezu alobi na bango: “Nalobi na bino, ya solo: bafutisi-mpaku ná basi ya ndumba bakokota na bokonzi ya Nzambe liboso na bino.

[32] Pamba té Yoane Mobatisi ayaki epai na bino po na kolakisa bino nzela ya malamu, kasi bondimelaki ye té. Nzokande bafutisi-mpaku pe basi ya ndumba bandimelaki ye. Kasi bino, atako bomonaki bongo, bobongolaki mitema té, bondimelaki ye kaka té.”

[33] “Bóyoka lisapo mosusu: Moto moko azalaki na elanga, akoni banzete ya vinu, asaleli yango lopango, abongisi libulu moko na kati ya mabanga po na kokamolela vinu, pe atòngi ndako moko ya molai po na kokengela yango; sima atie bato ya kofutela, bongo ye akei na mobembo.

[34] Awa tango ya kolongola mbuma ekoki, atindi bato na ye epai ya bafuteli ya elanga, po bákende kozwa ndambo ya mbuma.

[35] Kasi bango bakangi bato na ye, babeti moko, babomi mosusu pe babwakeli oyo ya misato mabanga.

[36] Kolo ya elanga atindi bato mosusu mingi koleka baoyo ya liboso, kasi bafuteli ya elanga basali bango kaka ndenge moko.

[37] Sima na bango nyonso atindeli bango mwana na ye moko, amilobi: ‘Bakotosa mwana na ngai.’

[38] Kasi tango bafuteli bamoni mwana, balobani bango na bango: ‘Tala moto akokóma kolo ya elanga soki tata na ye akufi. Tóboma ye, pe biso tokozwa elanga na ye.’

[39] Bongo bakangi ye, babwaki ye na libanda pe babomi ye.”

[40] Sima Yezu atuni: “Bongo tango kolo ya elanga akoya, akosala nini po na basali wana?”

[41] Bato bazongiseli ye: “Akoyokela bango mawa té, akoboma bango, pe akopesa elanga na bafuteli mosusu. Bango nde bato bakobanda kopesa ye mbuma na ye na tango ekoki.”

[42] Bongo Yezu alobi na bango: “Nanu botangá Mikanda ya Nzambe té? Ekòmamá boye: ‘Libanga bamason babwakaki ekómi fondasion oyo esimbi lopango mobimba ya Yeruzalem. Yango euti na Nkolo, tomoni yango na miso pe tokamwe mingi!’”

[43] Yezu alobi lisusu: “Yango wana nalobi na bino: bakolongola bino na bokonzi ya Nzambe pe bakokotisa bato mosusu; bango nde bato bakosala misala ya malamu po na yango.

[44] [Moto akokweya na likolo ya libanga oyo akopasuka; pe soki libanga wana ekweeli moto moko, ekonika ye.]”

[45] Bakonzi ya banganga-Nzambe ná ba-Farizé bayoki masapo wana mibale, pe bayebaki 'tè Yezu azalaki koloba po na bango;

[46] bongo babandaki koluka nzela ya kokanga ye, kasi babangaki bato. Pamba té bato bazalaki kokamata Yezu lokola profete.

Matié — Chapters