Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 6:41

[1] Yezu akoti na bwatu, akati lisusu ngambo pe akei na mboka na ye.

[2] Bamemeli ye moto moko akufá makolo, alali na mbeto. Tango Yezu amoni bondimi na bango, alobi na moto akufá makolo: “Mwana na ngai, tia molende! Nalimbisi masumu na yo.”

[3] Bongo balakisi-Mibeko mosusu babandi kolobana bango na bango: “Moto oyo azali kotsiola Nzambe.”

[4] Yezu ayebaki makanisi na bango, alobi: “Po na nini bozali na makanisi ya mabe boye na mitema na bino?

[5] Soki nalobi na ye ‘Nalimbisi masumu na yo’, to pe nalobi ‘Telema pe tambola’, nini eleki pasi?

[6] Kasi nalingi bóyeba 'tè mwana ya Moto azali na bokonzi ya kolimbisa masumu awa na mokili.” Bongo alobi na moto akufá makolo: “Telema, kamata mbeto na yo pe zonga na ndako!”

[7] Moto wana atelemi pe akei na ndako na ye.

[8] Tango bato bamoni boye, babangi mingi penza, pe bakumisi Nzambe po akabeli bato bokonzi ya ndenge oyo.

[9] Yezu alongwe kuna, pe tango azalaki koleka na nzela, amoni moto moko, kombo na ye Matié, afandi na biro oyo bafutaka mpaku. Yezu alobi na ye: “Landa ngai!” Matié atelemi pe alandi ye.

[10] Tango Yezu azalaki kolia na ndako ya Matié, bafutisi-mpaku mingi ná bato ebele ya masumu bazalaki na mesa esika moko ná ye pe bayekoli na ye.

[11] Awa ba-Farizé bamoni bongo batuni bayekoli na ye: “Po na nini moteyi na bino azali kolia esika moko ná bafutisi-mpaku pe bato ya masumu?”

[12] Yezu ayoki yango pe alobi: “Bato oyo bazali na nzoto malamu balukaka monganga té, kasi bobele bato ya maladi nde balukaka monganga.

[13] Bókende koyekola tina ya makambo oyo ekòmamá na Mikanda: ‘Nalingi bóyokelaka bato mawa, esika 'tè bózikiselaka ngai banyama.’ Pamba té nayaki kobenga bato ya malamu té, kasi nayaki kobenga bato ya masumu.”

[14] Bayekoli ya Yoane Mobatisi bayei epai ya Yezu pe batuni ye: “Biso ná ba-Farizé tomilalisaka nzala mbala mingi. Po na nini bayekoli na yo basalaka bongo té?”

[15] Yezu azongiseli bango: “Soki moto abali mwasi pe abengisi baninga na feti ya libala, bakoki komilalisa nzala? Té! Bakoki kozala na mawa té, tango moto oyo abali azali esika moko ná bango. Kasi mokolo ezali, bakolongola mobali na kati na bango, bongo baninga na ye bakobanda komilalisa nzala.

[16] “Moto moko té akoki kokamata kitendi ya elamba ya sika po ábamba elamba ya kala, pamba té kitendi wana ekopasola elamba ya kala pe lidusu ekokóma monene.

[17] Bakoki kotia vinu ya sika na basaki ya kala té e; soki basali bongo, basaki ekopasuka, vinu ekopanzana pe basaki wana ekokufa. Batiaka vinu ya sika na basaki ya sika, po bábatela nyonso mibale malamu.”

[18] Awa Yezu azalaki kolobela bango makambo oyo, mokonzi moko ya Bayuda ayei kofukamela ye, pe alobi: “Mwana na ngai ya mwasi akufi kaka sik'oyo. Kasi yaka kotiela ye liboko pe akobika.”

[19] Yezu atelemi pe alandi tata wana. Bayekoli na ye pe bakei na ye.

[20] Mwasi moko azalaki na maladi ya kobima makila, esali mbula zomi na mibale. Ayei na sima ya Yezu, pe asimbi ye na songe ya elamba,

[21] pamba té akanisaki 'tè: “Soki nasimbi ye ata na elamba, nakobika.”

[22] Kasi Yezu abaluki, amoni ye pe alobi: “Tia molende, mwana na ngai, bondimi na yo ebikisi yo.” Na mbala moko mwasi yango abiki.

[23] Yezu akómi na ndako ya mokonzi wana. Tango amoni bato bazali kobeta miziki po na ebembe, pe bamosusu bazali kotia makelele mingi,

[24] alobi: “Bóbima, mwana akufi té, kasi alali pongi.” Bango babandi koseka ye.

[25] Yezu abimisi bango nyonso, akoti na ndako, asimbi mwana yango na liboko, pe ye atelemi.

[26] Sango yango epanzanaki bipai nyonso na mboka wana.

[27] Yezu alongwe kuna. Awa azalaki koleka na nzela, bato mibale bakufá miso balandi ye pe bazalaki koganga boye: “Mwana ya David, yokela biso mawa!”

[28] Tango Yezu akómi na ndako, bato wana bakufá miso bayei penepene na ye, pe Yezu atuni bango: “Bondimi na mitema 'tè nakoki kosala bongo?” Bango bazongiseli ye: “Ee, Mokonzi.”

[29] Bongo Yezu asimbi miso na bango pe alobi: “Ésalama po na bino ndenge bondimi.”

[30] Pe miso na bango efungwami. Yezu apekisi bango makasi: “Bókeba, moto moko té áyeba makambo oyo!”

[31] Kasi bango bakei pe bapanzi sango ya Yezu bipai nyonso na mboka wana.

[32] Tango balingaki kokende, bato mosusu bamemeli Yezu baba moko oyo azalaki na molimo mabe.

[33] Yezu abengani molimo mabe, bongo baba wana abandi koloba. Bato nyonso bakamwe pe balobi: “Nanu tomoná likambo ya boye té na Israel!”

[34] Kasi ba-Farizé balobi: “Ezali mokonzi ya milimo mabe moto apesi ye makasi ya kobengana milimo mabe!”

[35] Yezu atambolaki na bamboka nyonso ya minene ná ya mike. Azalaki koteya na bandako ya lisanga, pe kosakola Sango Malamu 'tè Nzambe alingi kotia bokonzi na ye. Abikisaki lisusu bato bazalaki na maladi ya ndenge na ndenge.

[36] Ayokaki mawa mingi na motema, po na ebele ya bato oyo azalaki komona; pamba té balembaki pe bazalaki lisusu na makasi té, lokola bameme ezangi mobokoli.

[37] Bongo alobi na bayekoli na ye: “Bambuma ebele etondi na elanga, kasi bato ya kobuka yango bazali mingi té.

[38] Bóbondela Kolo ya elanga átinda bato mingi ya mosala po bámemela ye bambuma.”

Matié — Chapters