Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 6:06

[1] Ba-Farizé ná balakisi-Mibeko bautaki na Yeruzalem pe bayei epai ya Yezu, bongo batuni ye:

[2] “Po na nini bayekoli na yo batosaka mibeko ya bakoko té? Tala, basukolaka maboko té na ndenge ekoki liboso ya kolia.”

[3] Yezu azongiseli bango: “Bongo bino, po na nini botosaka mibeko ya Nzambe té? Botosaka kaka mibeko euti na bino moko.

[4] Pamba té Nzambe alobá: ‘Tosa tata ná mama na yo’. Pe ‘Oyo abwakeli tata na ye to mama na ye lisumá, basengeli koboma ye.’

[5] Kasi bino bolobaka: ‘Moto akoki koloba na tata pe na mama: lisalisi oyo nalingaki kopesa bino, nabombi yango po na Nzambe.

[6] Soki alobi bongo, asengeli lisusu té kosalisa tata ná mama.’ Kaka na ndenge wana bozali kokómisa maloba ya Nzambe eloko pamba, po na kotosa mibeko na bino moko.

[7] Bato ya lokuta! Profete Ezaya asakolaká maloba ya solo po na bino:

[8] ‘Nzambe alobi: Bato oyo bakumisaka ngai bobele na maloba, kasi na mitema bazali mosika na ngai.

[9] Losambo na bango ezali na tina moko té, po balandaka bobele mateya oyo bato balakisá bango.’”

[10] Sima Yezu abengaki bato nyonso wana pe alobi na bango:

[11] “Bóyoka pe bóyeba 'tè: Eloko ekoti na monoko ya moto, ekoki kobebisa motema na ye té. Kasi oyo ebimaka na monoko na ye, yango nde ebebisaka motema na ye.”

[12] Bongo bayekoli bapusani penepene ya Yezu pe balobi na ye: “Oyebi 'tè maloba na yo eyokisi ba-Farizé pasi na mitema?”

[13] Yezu azongisi: “Nzete nyonso oyo Tata na ngai ya Likolo akoni té, bakopikola yango.

[14] Bótika bango! Bazali lokola balakisi-nzela bakufá miso. Soki moto moko akufá miso azali kolakisa nzela na moto mosusu akufá miso, bango mibale bakokweya na libulu.”

[15] Piere alobi na ye: “Limbolela biso tina ya maloba yango.”

[16] Yezu azongisi: “Bino pe bozwi nanu mayele té tii sik'oyo?

[17] Boyebi té 'tè biloko nyonso oyo ekotaka na monoko ya moto ekendeke na libumu na ye, bongo na sima ebimaka na libanda.

[18] Kasi oyo ebimaka na monoko eutaka na motema: yango nde ebebisaka moto.

[19] Pamba té makanisi nyonso ya kosala mabe eutaka na mitema ya bato; ndakisa: kosala kindumba, koyiba, koboma bato, kotambola na basi ya bato, kokosela bato makambo, pe kofinga bato.

[20] Wana ezali makambo ebebisaka moto. Kasi soki moto asukoli maboko té liboso ya kolia, yango ekoki kobebisa ye té.”

[21] Na sima Yezu alongwe na esika yango, pe akei na mabelé ya vile ya Tir pe ya Sidon.

[22] Mwasi moko ya Kananite azalaki kofanda kuna, ayei epai na ye, pe agangi: “Mokonzi, Mwana ya David, yokela ngai mawa! Mwana na ngai ya mwasi azali na molimo mabe pe azali komona pasi mingi.”

[23] Kasi Yezu azongiseli ye ata liloba moko té. Bongo bayekoli bayei epai na ye pe balobi: “Bengana ye; pamba té azali kolanda biso ná makelele na ye.”

[24] Yezu azongisi: “Batindaki ngai kaka epai ya bato ya Israel oyo bazali lokola bameme ebungá. Boye té?”

[25] Kasi mwasi wana ayei kofukama liboso na ye pe alobi: “Mokonzi, salisa ngai!”

[26] Yezu azongisi: “Bakamataka bilei ya bana té po na kobwakela yango bambwa.”

[27] Mwasi yango alobi: “Ya solo, Mokonzi, kasi bambwa eliaka biteni oyo ekweyaka na se ya mesa ya bakolo na yango.”

[28] Bongo Yezu azongiseli ye: “Ee, mama! Bondimi na yo ezali makasi. Ésalama po na yo ndenge olingi.” Pe mwana na ye abiki kaka na tango wana.

[29] Yezu alongwe wana pe akei penepene ya laki ya Galilé. Amati na ngomba moko pe afandi.

[30] Bato ebele bayei epai na ye. Bamemi bato bakufá makolo, bato bakufá miso, bato batambolaka té, bababa, pe bato ya maladi ya ndenge na ndenge. Batie bango liboso ya Yezu, bongo ye abikisi bango.

[31] Bato bakamwe mingi tango bamoni bababa bakómi koloba, bato ya tengu-tengu babiki, bato bakufá makolo babandi kotambola, pe bato bakufá miso bakómi komona. Bongo bato nyonso bapesi mersi na Nzambe ya Israel.

[32] Yezu abengi bayekoli na ye pe alobi: “Nazali koyokela bato oyo mawa, pamba té mikolo misato mobimba bafandi ná ngai, pe bazangi biloko ya kolia. Nalingi kozongisa bango na nzala té, po tango mosusu bakoki kolemba na nzela.”

[33] Bayekoli batuni ye: “Awa na esobe, esika nini tokoki kozwa biloko ya koleisa bato ebele boye?”

[34] Yezu atuni bango: “Bozali na mapa boni?” Bango bazongisi: “Mapa sambo ná ndambo ya bambisi ya mike.”

[35] Bongo Yezu alobi na bato nyonso báfanda na se.

[36] Akamati mapa sambo wana ná bambisi, apesi Nzambe mersi; akatikati yango, bongo apesi na bayekoli po bákabola. Bayekoli bakamati yango pe bakaboleli bato nyonso.

[37] Bango nyonso balei pe batondi. Bayekoli balokoti biteni ya biloko etikalaki, batondisi bitunga sambo.

[38] Bato oyo baliaki bazali mibali 4.000, kotanga basi ná bana té.

[39] Tango Yezu asilisi kozongisa bato na bamboka na bango, akoti na bwatu pe akei na mboka Magadana.

Matié — Chapters