Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 6:44

[1] Yezu abandi lisusu kobetela bato masapo pe alobi:

[2] “Bóyoka ndenge makambo ekobanda koleka na bokonzi ya Likolo. Ekozala lokola mokonzi moko oyo asalisi feti ya libala ya mwana na ye.

[3] Atindi basali na ye bákende epai ya bato oyo babengisaki, po báya na feti; kasi bango baboyi koya.

[4] Atindi basali mosusu pe alobi na bango: ‘Bóloba boye na bato oyo nabengisaki: Nasi'nabongisi biloko nyonso; nabomisi bangombe na ngai ná banyama ya mafuta. Bóya na feti ya libala!’

[5] Kasi bango bamoni yango makambo ya pamba, pe bakei moto na moto na mosala na ye: mosusu akei na bilanga, mosusu akei kosala mombongo;

[6] bamosusu bakangi basali wana, banyokoli bango pe babomi bango.

[7] Mokonzi ayoki kanda, atindi basoda na ye po bákende koboma babomi wana pe bázikisa mboka na bango.

[8] Na sima alobi na basali na ye: ‘Nabongisaki feti malamu, kasi bato oyo nabengisaki bakoki na yango té po na kolia.

[9] Bókende na babalabala ya minene, pe bóbenga bato nyonso oyo bokomona, po báya na feti.’

[10] Basali bakei na babalabala, pe bamemi bato nyonso oyo bakutaki kuna: ézala bato ya malamu to ya mabe; boye ndako ya feti etondaki.

[11] “Tango mokonzi akoti po na kopesa mbote na bato oyo bazalaki na mesa, amoni moto moko alataki bilamba ya feti té.

[12] Bongo atuni ye: ‘Ndenge nini yo okoteli awa? Olati bilamba ya feti té.’ Kasi moto wana azalaki ata na eloko moko té ya kozongisa.

[13] Boye mokonzi alobi na basali na ye: ‘Bókanga ye makolo ná maboko pe bóbwaka ye libanda na molili, esika bato balelaka pe baliaka mino.’”

[14] Yezu asukisi boye: “Ya solo, bato mingi babengami, kasi bato oyo baponami bazali mingi té.”

[15] Sima, ba-Farizé bakei kosala likita po na koluka nzela ya kokanga Yezu na maloba na ye moko.

[16] Batindi bayekoli na bango mosusu ná bato ya Erode po na kotuna ye: “Moteyi, toyebi malamu 'tè yo okosaka té, pe oteyaka makambo ya solo po na nzela ya Nzambe; obangaka bato té, pe otalaka bilongi ya bato té.

[17] Lobela biso, okanisi nini po na likambo oyo: Mibeko na biso epesaka nzela ya kofuta mpaku na mokonzi monene ya Rome to té?”

[18] Kasi Yezu ayebaki mayele na bango ya mabe, bongo alobi na bango: “Bato ya lokuta! Po na nini bozali komeka ngai?

[19] Bólakisa ngai nanu mbongo oyo bafutelaka mpaku.” Balakisi ye ebende moko ya mbongo,

[20] bongo Yezu atuni bango: “Foto oyo pe kombo oyo bakòmá awa ezali ya nani?”

[21] Bango bazongisi: “Ya mokonzi monene ya Rome.” Bongo Yezu alobi na bango: “Bópesa mokonzi monene ya Rome oyo ezali ya ye, pe bópesa na Nzambe oyo ya ye.”

[22] Awa bayoki bongo, bakamwe penza; batiki ye pe bakei.

[23] Kaka na mokolo wana ba-Sadusé bayei epai ya Yezu. Ezali nde ba-Sadusé bato balobaka 'tè bato bakufá bakoki kosekwa té.

[24] Bango batuni ye boye: “Moteyi, Moize alobaká: ‘Soki moto akufi pe aboti bana té, ndeko na ye ábala mwasi oyo ye atiki, po ábotela ye bana.’

[25] Epai na biso ezalaki na mibali sambo, bango nyonso mama moko, tata moko. Mwana ya liboso abali mwasi pe akufi, kasi aboti na ye té; bongo atiki mwasi na ye na maboko ya ndeko na ye.

[26] Esalamaki se ndenge moko po na moto ya mibale ná ya misato, tii na oyo ya sambo.

[27] Na sima na bango nyonso, mwasi pe ayei kokufa.

[28] Bongo mokolo bato bakufá bakosekwa, mwasi wana akozala ya nani? Pamba té bango nyonso babalaki ye.”

[29] Yezu azongiseli bango: “Namoni 'tè bobosani, po boyebi Mikanda ya Nzambe té, boyebi pe nguya na ye té.

[30] Pamba té tango bato bakufá bakosekwa, bakobanda kobalana té, kasi bakokokana ná ba-anjelu ya Likolo.

[31] Po na likambo etali kosekwa ya bato bakufá, botangá té ndenge Nzambe alobaká na bino?

[32] Ye alobaká boye: ‘Nazali Nzambe ya Abraham, ya Izaak pe ya Jakob.’ Ye azali Nzambe ya bato bakufá té, kasi ya bato oyo bazali na bomoi.”

[33] Bato oyo bayokaki ye bakamwe mingi penza po na mateya na ye.

[34] Tango ba-Farizé bayoki 'tè Yezu asukisi ba-Sadusé, bayei kosangana epai na ye.

[35] Moko na kati na bango azalaki molakisi-Mibeko, pe alingaki komeka Yezu; bongo atuni ye boye:

[36] “Moteyi, mobeko nini eleki Mibeko nyonso ya Nzambe?”

[37] Yezu azongiseli ye: “‘Linga Nkolo Nzambe na yo na motema na yo mobimba, na bomoi na yo mobimba pe na mayele na yo nyonso.’

[38] Wana ezali mobeko ya liboso pe eleki monene.

[39] Mobeko ya mibale ekokani na yango, yango oyo: ‘Linga moninga na yo ndenge omilingaka yo moko.’

[40] Mibeko nyonso ya Moize pe mateya ya baprofete ezali na kati ya mibeko mibale oyo.”

[41] Lokola ba-Farizé bazalaki esika moko, Yezu atuni bango:

[42] “Bokanisi nini po na Mesia? Ye azali mwana ya nani? Akozwa ebonga ya nani?” Bango bazongiseli ye: “Azali mwana ya David; akozwa ebonga na ye.”

[43] Bongo Yezu atuni bango lisusu: “Kasi ndenge nini Molimo Mosantu alakisaká David 'tè ábenga Mesia Mokonzi na ye? Pamba té David alobaká boye:

[44] ‘Nkolo alobi na Mokonzi na ngai: fanda pembeni na ngai na esika ya lokumu; nakotia banguna na yo na se ya makolo na yo.’

[45] Soki David azalaká kobenga Mesia ‘Mokonzi na ngai’, bongo ndenge nini Mesia akoki kozala Mwana ya David, oyo akozwa bobele ebonga na ye?”

[46] Ata moto moko té akokaki kozongisela ye eyano. Banda mokolo wana moto ata moko té amekaki kotuna ye lisusu.

Matié — Chapters