[1] “Bóyoka ndenge bato bakokota na bokonzi ya Likolo. Ezalaki na feti ya libala. Bilenge basi zomi, bamwinda na maboko, bakei koyamba mobali oyo akobala.
[2] Na kati na bango, mitano bazalaki bazoba, pe mitano mosusu bazalaki mayele.
[3] Bazoba bakamataki kaka bamwinda pamba, kasi bamemi mafuta mingi té.
[4] Nzokande baoyo ya mayele bamemaki bamwinda na bango ná milangi ya mafuta.
[5] Awa mobali azalaki koya noki té, bango nyonso bayoki pongi pe balali.
[6] “Na kati ya butu moto moko agangi: ‘Mobali ayei! Bókende koyamba ye!’
[7] Bongo bilenge basi wana balamuki pe babandi kobongisa bamwinda na bango.
[8] Bazoba balobi na baoyo ya mayele: ‘Bópesa biso ndambo ya mafuta; bamwinda na biso ezali kokufa.’
[9] Baoyo ya mayele bazongisi: ‘Té, mafuta ekokoka té soki topesi bino. Bókende kosomba ya bino na wenze.’
[10] Bazoba bakei kosomba mafuta. Kaka na tango wana mobali ayei, bongo bilenge oyo bamibongisaki bakoti ná ye na ndako ya feti, pe bakangi ndako na fungola.
[11] Na sima bilenge ya zoba pe bakómi. Basengi: ‘Mokonzi, mokonzi, fungolela biso ndako!’
[12] Kasi mobali azongisi: ‘Nalobi na bino, ya solo: nayebi bino té.’”
[13] Yezu asukisi boye: “Yango wana bózalaka na ekenge, pamba té boyebi mokolo té to ngonga té.”
[14] “Nzambe akosala lokola moto moko alingaki kokende na mobembo: abengi basali na ye pe apesi mbongo na ye nyonso na maboko na bango, po bábatela yango.
[15] Apesi na moto na moto na ndenge ekoki na mayele na ye. Na moto ya liboso apesi maboke mitano ya mbongo, na moto ya mibale maboke mibale, bongo na moto ya misato liboke moko. Na sima akei.
[16] Mosali oyo azwaki maboke mitano ya mbongo, akei noki kosalela yango mombongo, pe azwi maboke mitano na likolo.
[17] Moto oyo azwaki maboke mibale asali pe ndenge wana, bongo azwi maboke mibale mosusu.
[18] Kasi moto oyo azwaki liboke moko akei kotimola libulu na mabelé, pe abombi mbongo ya mokonzi na ye.
[19] “Mikolo mingi eleki, mokonzi ya basali wana azongi, pe abengi basali na ye, po bálakisa ye ndenge basalaki na mbongo na ye.
[20] Mosali oyo azwaki maboke mitano ayei pe alakisi maboke mitano mosusu, alobi: ‘Mokonzi, opesaki ngai maboke mitano. Tala, nazwi maboke mitano mosusu likolo.’
[21] Mokonzi na ye azongiseli ye: ‘Malamu! Ozali mosali ya malamu pe ya botosi. Osali penza mosala po na makambo ya mike; bongo nakopesa makambo minene na maboko na yo. Yaka epai na ngai, tósepela esika moko.’
[22] Mosali oyo azwaki maboke mibale ayei pe alobi: ‘Mokonzi, opesaki ngai maboke mibale ya mbongo. Tala, nazwi maboke mibale mosusu likolo.’
[23] Mokonzi azongiseli ye: ‘Malamu! Ozali mosali ya malamu pe ya botosi. Osali penza mosala po na makambo ya mike; bongo nakopesa makambo minene na maboko na yo. Yaka epai na ngai, tósepela esika moko!’
[24] Na sima mosali oyo azwaki liboke moko ya mbongo ayei pe alobi: ‘Mokonzi, nayebaki 'tè ozali moto moko ya matata: obukaka mbuma ata oyo okoni té.
[25] Nabangaki, yango wana nakendeki kobomba mbongo na yo na se ya mabelé. Tala, mbongo na yo yango oyo.’
[26] Mokonzi na ye azongiseli ye: ‘Mosali mabe pe ya goigoi! Oyebaki 'tè nabukaka mbuma ata oyo nakoni té;
[27] bongo ebongaki ótia mbongo na ngai na banke, boye lokola nazongi nalingaki kokende kokamata yango ná benefisi.
[28] Bóbotola ye liboke ya mbongo wana pe bópesa yango na moto oyo azali na maboke zomi.
[29] Pamba té, moto oyo azali na biloko mingi, bakobakisela ye mosusu; kasi oyo azangi biloko, bakobotola ye kutu ata ndambo oyo azali na yango.
[30] Bóbwaka mosali oyo ya pamba-pamba na libanda, na molili, esika balelaka pe baliaka mino.’”
[31] “Mokolo mwana ya Moto akoya na lokumu na ye ya mokonzi, nzela moko ná ba-anjelu nyonso, akofanda na kiti na ye ya lokumu.
[32] Bakosangisa bato nyonso ya mokili liboso na ye, pe akokabola bango ndenge mobokoli ya banyama akabolaka bameme ná bataba:
[33] akotia bameme na liboko ya mobali, pe bataba na liboko ya mwasi.
[34] Bongo mokonzi akoloba boye na bato oyo bakozala na liboko na ye ya mobali: ‘Bóya, bino bato Tata na ngai abenisá, pe bókota na bokonzi oyo abongiselá bino uta ebandeli ya mokili.
[35] Pamba té nazalaki na nzala, pe bopesaki ngai bilei; nazalaki na posa ya mai, pe bopesaki ngai mai ya komela; nazalaki mopaya, pe boyambaki ngai na bandako na bino.
[36] Nazangaki bilamba, pe bopesaki ngai yango; nazalaki na maladi, pe bosalisaki ngai; nakotaki boloko, pe boyaki kotala ngai.’
[37] Bongo bato ya malamu bakotuna ye: ‘Mokonzi, tango nini tomonaki yo ozali na nzala, bongo topesaki yo bilei? To ozalaki na posa ya mai, bongo topesaki yo mai ya komela?
[38] Tango nini tomonaki yo ozali mopaya, pe toyambaki yo na bandako na biso? To ozangaki bilamba, pe topesaki yo yango?
[39] Tango nini tomonaki yo ozali na maladi to okotaki boloko, pe toyaki kotala yo?’
[40] Boye mokonzi akozongisela bango: ‘Nalobi na bino, ya solo: mbala nyonso bosalisaki ata moto ya suka na kati ya bandeko na ngai, bosalisaki ngai!’
[41] “Na sima Mokonzi akoloba boye na bato oyo bakozala na liboko na ye ya mwasi: ‘Bólongwa na miso na ngai, bino bato Nzambe abwaká! Bókende na móto oyo ekufaka té, oyo babongiselá zabolo ná bazabolo na ye.
[42] Pamba té nazalaki na nzala, pe bopesaki ngai bilei té; nazalaki na posa ya mai, pe bopesaki ngai mai ya komela té;
[43] nazalaki mopaya, pe boyambaki ngai na bandako na bino té; nazangaki bilamba, pe bopesaki ngai yango té; nazalaki na maladi pe nakotaki boloko, kasi bosalisaki ngai té.’
[44] Bongo bango bakotuna ye: ‘Mokonzi, tango nini tomonaki yo ozali na nzala, to na posa ya mai? To ozalaki mopaya, ozangaki bilamba, ozalaki na maladi to okotaki boloko, bongo tosalisaki yo té?’
[45] Mokonzi akozongisela bango: ‘Nalobi na bino, ya solo: mbala nyonso bozalaki koboya kosalisa ata moto ya suka na kati ya bandeko na ngai, bozalaki nde koboya kosalisa ngai.’
[46] Bongo bango bakozwa etumbu oyo esilaka té; kasi bato ya malamu bakozwa bomoi ya seko.”