[1] “Bókeba na ndenge bosalelaka Nzambe. Bósalelaka ye na miso ya bato té po bámonaka bino; soki té bokozwa lifuta té epai ya Tata na bino ya Likolo.
[2] “Bongo, tango ozali kosalisa bato bakelelá, kotia makelele té po bato bámona yo. Bato ya lokuta basalaka ndenge wana na ndako ya lisanga to na balabala, po bato bákumisa bango. Nalobi na bino, ya solo: basi'bazwi lifuta na bango.
[3] Kasi yo, tango ozali kosalisa bato bakelelá, sala na ndenge 'tè ata moninga na yo ya motema ámona yango té,
[4] po makabo na yo ézala ya kobombama. Bongo Tata na yo oyo amonaka makambo ebombamá, akopesa yo lifuta.”
[5] “Tango bozali kosambela, bózala lokola bato ya lokuta té! Bango balingaka kotelema na bandako ya lisanga pe na babalabala po na kosambela, po bato nyonso bámona bango. Nalobi na bino, ya solo: basi'bazwi lifuta na bango.
[6] Kasi yo, soki olingi kosambela, kota na ndako na yo, kanga yango, sambela Tata na yo oyo azali komonana té. Bongo Tata na yo oyo amonaka makambo ebombamá, akopesa yo lifuta.
[7] “Tango bozali kosambela, bóloba maloba mingi té ndenge bato oyo bayebi Nzambe té basalaka. Bango bakanisaka 'tè Nzambe akoyokela bango soki bazali koloba mingi.
[8] Bólanda bango té. Liboso 'tè bóbanda kosenga ye, Tata na bino asi'ayebi eloko nini bozali na yango posa.
[9] Tala ndenge bino bosengeli kosambela: ‘Tata na biso ya Likolo, kombo na yo ézala na lokumu;
[10] bokonzi na yo éya; nyonso yo olingi ésalama awa na se ndenge esalamaka na Likolo.
[11] Pesa biso lelo bilei oyo ekoki;
[12] limbisa biso mabe tosali yo, lokola biso pe tolimbisi mabe basali biso;
[13] kotika Monguna ámeka biso té, kasi bikisa biso na mabe. [Po bokonzi, nguya pe lokumu ezali ya yo seko. Amen.]’
[14] “Pamba té soki bolimbisi bato mabe oyo basalaki bino, Tata na bino ya Likolo akolimbisa bino pe.
[15] Kasi soki boboyi kolimbisa bato mabe oyo basalaki, Tata na bino akolimbisa pe masumu na bino té.”
[16] “Tango bozali komilalisa nzala, bókómisa bilongi mawa-mawa té ndenge bato ya lokuta basalaka. Bakangaka bilongi po bato nyonso bámona 'tè bamilalisi nzala. Nalobi na bino, ya solo: basi'bazwi lifuta na bango.
[17] Kasi yo, soki omilalisi nzala, sukola elongi na yo; bongisa suki na yo,
[18] po bato báyeba té 'tè omilalisi nzala; moto akoyeba yango kaka Tata na yo oyo azali komonana té. Bongo Tata na yo oyo amonaka makambo ebombamá, akopesa yo lifuta.”
[19] “Bónduka bomengo na mokili oyo té. Awa na mokili bampese eliaka yango, biloko ebebaka, pe bamiyibi babukaka bandako po na koyiba.
[20] Kasi bóbomba bomengo na Likolo, epai ya Nzambe. Kuna bampese eliaka yango té, biloko ebebaka té, pe bamiyibi babukaka bandako té po na koyiba.
[21] Pamba té esika bomengo na yo ezali, motema na yo pe ezali kuna.”
[22] “Miso ya moto ezali lokola mwinda; yango moto emonisaka yo. Soki miso na yo ezali malamu, okomona polele penza;
[23] kasi soki ezali mabe, okozala na molili, okomona eloko té. Se bongo, soki motema na yo ekómi molili, molili yango ekozala makasi koleka.”
[24] “Moto moko té akoki kosalela bakonzi mibale. Soki azali koyina moko, akolinga mosusu; soki azali kotosa moko, akoboya mosusu. Bokoki kosalela Nzambe té soki bozali baumbu ya mbongo.”
[25] “Yango wana nalobi na bino: Bómitungisaka té na komitunaka soki bokolia nini, soki bokomela nini to pe soki bokolata nini. Bomoi eleki bilei té? Nzoto eleki bilamba té?
[26] Bótala bandeke! Yango ekonaka té, ekongolaka bambuma na bilanga té, pe ebombaka yango té; nzokande Tata na bino ya Likolo moto aleisaka yango. Bino boleki yango na tina té?
[27] Ata bomitungisi boni, nani na kati na bino akoki kobakisa mokolo moko na bomoi na ye?
[28] “Bongo tina nini bozali komitungisa po na bilamba? Bótala ndenge baflere ekolaka na esobe! Yango esalaka té, pe etòngaka bilamba té.
[29] Kasi nalobi na bino: ata Salomon, moto ya bomengo penza, alataki malamu té lokola baflere wana.
[30] Bókanisa: matiti oyo ezali lelo na esobe, lobi bakoki kotumba yango na móto. Bongo soki Nzambe alatisaka yango boye, akoki pe kolatisa bino té? Po na nini bondimi na bino ezali moke?
[31] “Bómitungisaka té po na komituna: Tokolia nini? Tokomela nini? Tokolata nini?
[32] Kaka baoyo bayebi Nzambe té bato bamitungisaka po na koluka biloko wana nyonso. Pamba té Tata na bino ya Likolo ayebi 'tè bozali na posa na yango.
[33] Bólukaka liboso kokóma bato ya bokonzi na ye pe kosala makambo ye alingaka, bongo ye akopesa bino biloko mosusu nyonso.
[34] Bómitungisa té po na makambo ekoya lobi; lobi ekozala na makambo na yango. Mokolo na mokolo ezali na pasi ekoki na yango.”