Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 11:44

[1] Tango Yezu asilisi koloba makambo wana nyonso, alobi na bayekoli na ye:

[2] “Boyebi, etikali mikolo mibale tókóma na feti ya Koleka; bongo bakoteka mwana ya Moto, po báboma ye na kuruze.”

[3] Kaka na tango wana bakonzi ya banganga-Nzambe ná bambuta-muntu ya Bayuda bakei kosangana na ndako ya Kaife, mokonzi ya banganga-Nzambe.

[4] Bayokani bákanga Yezu na mayele pe báboma ye;

[5] nzokande balobi: “Tokoki kokanga ye na mokolo ya feti té. Soki té, bato bakotomboka.”

[6] Mokolo wana Yezu azalaki na Betanie na ndako ya Simon, moto oyo azalaki na maladi ya maba.

[7] Mwasi moko ayei penepene na ye, azalaki na molangi basalá na libanga ya kitoko penza, etondá na malasi ya talo mingi, bongo asopeli yango Yezu na motú tango ye afandi na mesa po na kolia.

[8] Awa bayekoli bamoni bongo, basiliki balobi: “Po na nini kobebisa malasi oyo boye?

[9] Bakokaki koteka yango na talo mingi penza, pe kopesa mbongo wana na bato bakelelá!”

[10] Yezu ayebaki makambo bango bazalaki koloba pe alobi na bango: “Po na nini bozali kotungisa mama oyo? Likambo ye asali po na ngai ezali malamu.

[11] Bato bakelelá bakozala ná bino tango nyonso, kasi ngai nakofanda ná bino libela té.

[12] Lokola asopeli ngai malasi oyo, asali bongo po na kobongisa nzoto na ngai, pamba té etikali moke bákunda ngai.

[13] Nalobi na bino, ya solo: bipai nyonso bakozala kosakola Sango Malamu oyo na mokili mobimba, bakoloba likambo mama oyo asali, pe bakokanisa ye.”

[14] Na tango wana, moko na kati ya bayekoli zomi na mibale, kombo na ye Yudas Iskariot, akei epai ya bakonzi ya banganga-Nzambe,

[15] pe atuni bango: “Bokopesa ngai nini soki nakabi Yezu na maboko na bino?” Bongo bango batangi bibende tuku misato (30) ya mbongo pe bapesi ye yango.

[16] Banda mokolo wana Yudas akómi koluka nzela ya kokaba Yezu na maboko na bango.

[17] Mokolo ya liboso ya feti ya mapa ya kovimba té, bayekoli bayei kotuna Yezu: “Epai wapi olingi tólambela yo bilei ya feti ya Koleka?”

[18] Ye azongiseli bango: “Bókende na vile na ndako ya songolo, pe bóloba na ye: Moteyi alobi: Tango na ngai ekoki. Nakolia feti ya Koleka na ndako na yo, ngai ná bayekoli na ngai.”

[19] Bayekoli basali ndenge Yezu atindaki bango pe balambi bilei ya feti ya Koleka.

[20] Awa pokwa ekómi, Yezu afandi na mesa ná bayekoli na ye zomi na mibale.

[21] Bongo tango bazalaki kolia, Yezu alobi: “Nalobi na bino, ya solo: moto moko na kati na bino akoteka ngai.”

[22] Bayekoli bayoki mawa mingi, pe babandi kotuna ye moko moko: “Mokonzi, ezali ngai?”

[23] Yezu azongisi: “Moto akoteka ngai ezali moko na kati na bino; azali kolia ná ngai sani moko.

[24] Mwana ya Moto akokufa ndenge ekòmamá po na ye; kasi mawa mingi na moto oyo akoteka Mwana ya Moto. Ebongaki malamu kutu moto wana ábotama té!”

[25] Yudas moto oyo atekaki ye atuni: “Moteyi, ezali ngai?” Yezu azongiseli ye: “Yo moko olobi yango.”

[26] Tango bazalaki kolia, Yezu akamati lipa, apesi Nzambe mersi, akatikati yango pe akaboleli bayekoli na ye; alobi: “Bókamata, bólia. Oyo ezali nzoto na ngai.”

[27] Na sima akamati kopo, asambeli po na kopesa Nzambe mersi, apesi kopo na bayekoli pe alobi: “Bómela yango bino nyonso.

[28] Pamba té, oyo ezali makila na ngai. Yango nde moto ezali kotia Boyokani na kati ya Nzambe ná bato; ekosopana po bato ebele bázwa bolimbisi ya masumu.

[29] Nalobi na bino: banda lelo nakomela lisusu vinu oyo té, tii mokolo nakomela vinu ya sika esika moko ná bino, na bokonzi ya Tata na ngai.”

[30] Na sima bayembi banzembo, pe bakei na Ngomba ya ba-Olive.

[31] Bongo Yezu alobi na bayekoli na ye: “Na butu ya lelo bino nyonso bokobungisa bondimi po na makambo ekokweela ngai. Pamba té ekòmamá boye: ‘Nakoboma mobokoli, pe bameme nyonso ekopanzana.’

[32] Kasi tango nakosekwa, nakokende na Galilé liboso na bino.”

[33] Piere alobi na ye: “Ata soki bango nyonso babungisi bondimi po na makambo ekokweela yo, kasi ngai nakobungisa yango ata moke té!”

[34] Yezu azongiseli ye: “Nalobi na yo, ya solo: kaka na butu ya lelo, liboso 'tè soso élela, okowangana mbala misato 'tè oyebi ngai té.”

[35] Piere alobi na ye: “Ata kutu soki nasengeli kokufa esika moko ná yo, nakoki kowangana yo té.” Bayekoli nyonso balobaki kaka ndenge moko.

[36] Bongo Yezu akómi ná bayekoli na ye na elanga moko babengaka Jetsemane. Alobi na bango: “Bófanda awa, ngai nakei kobondela Nzambe kuna.”

[37] Amemi Piere pe bana ya Zebedé mibale, Jake ná Yoane. Na mbala moko abandi koyoka mawa pe pasi na motema.

[38] Bongo alobi na bango: “Motema na ngai etondi na mawa lokola nákufa. Bótikala awa, pe bókengela ná ngai.”

[39] Apusani mwa-moke, afukami elongi na se, pe abandi kobondela Nzambe boye: “Tata na ngai, soki olingi, longola kopo oyo ya pasi epai na ngai! Kasi kosala té ndenge ngai nalingi; sala bobele ndenge yo olingi.”

[40] Na sima azongi epai ya bayekoli misato pe akuti bango balali pongi. Alobi na Piere: “Ndenge nini bokokaki té kokengela ná ngai ata ngonga moko?

[41] Bókengela, pe bóbondela Nzambe, po Monguna ámeka bino té! Ata bozali na molende na mitema, bozali kaka bato; bozangá makasi.”

[42] Akei lisusu mbala ya mibale pe abondeli Nzambe boye: “Tata na ngai, soki kopo oyo ekoki kolongwa té, bobele námela yango, ésalama kaka ndenge yo olingi.”

[43] Azongi lisusu epai ya bayekoli na ye, pe akuti bango balali kaka pongi, pamba té miso na bango ekómaki kilo.

[44] Yezu atiki bango lisusu, akei kobondela Nzambe mbala ya misato; alobi bobele ndenge moko.

[45] Na sima azongi epai ya bayekoli na ye pe alobi na bango: “Esili. Sik'oyo bokoki kolala pe kopema. Tango esi'ekoki po bákaba mwana ya Moto na maboko ya bato ya masumu.

[46] Bótelema, tókende. Tala moto ateki ngai ayei.”

[47] Tango Yezu azalaki nanu koloba, Yudas, moko na kati ya bayekoli zomi na mibale, akómi. Ayei ná bato ebele, bamemi bambeli ná banzete na maboko. Bakonzi ya banganga-Nzambe pe bambuta-muntu ya ekolo bato batindaki bango.

[48] Nzokande Yudas oyo atekaki Yezu, alakisaki bango ndenge bakoyeba ye, alobaki boye: “Moto oyo ngai nakoyamba, ye wana. Bókanga ye.”

[49] Na mbala moko Yudas apusani penepene ya Yezu, alobi: “Moteyi, mbote,” pe ayambi ye.

[50] Yezu azongiseli ye: “Moninga na ngai, sala mosala na yo noki.” Bongo bamosusu bapusani, basimbi Yezu pe bakangi ye.

[51] Moko ya baoyo bazalaki ná Yezu abimisi mbeli na ye, pe akati mosali ya mokonzi ya banganga-Nzambe litoi.

[52] Kasi Yezu alobi na ye: “Zongisa mbeli na yo na esika na yango; pamba té bato nyonso oyo babundaka na mbeli bakufaka na mbeli.

[53] Oyebi té? Soki nasengi lisalisi epai ya Tata na ngai, na mbala moko akotindela ngai basoda na ye, ba-anjelu ebele, koleka kutu babatayon zomi na mibale.

[54] Kasi soki nasali boye, ndenge nini Nzambe akokokisa makambo oyo ekòmamá na Mikanda? Pamba té ekòmamá 'tè oyo nyonso esengeli kosalama.”

[55] Na sima Yezu atuni bato wana: “Boni? Nakómi moyibi? Ndenge nini bomemi bambeli ná banzete po na kokanga ngai? Mikolo nyonso nazalaki kofanda na Ndako ya Nzambe pe koteya; nzokande bokangaki ngai té.

[56] Kasi nyonso oyo esalami po na kokokisa makambo ekòmamá na Mikanda ya baprofete.” Bongo bayekoli nyonso batiki ye pe bakimi na bango.

[57] Bato oyo bakangaki Yezu bamemi ye na ndako ya Kaife, mokonzi monene ya banganga-Nzambe, esika balakisi-Mibeko pe bambuta-muntu bakendeki kosangana.

[58] Piere azalaki kolanda Yezu na mosika tii na lopango ya mokonzi ya banganga-Nzambe. Kuna afandi esika moko ná bakengeli po na kotala ndenge nini likambo yango ekosuka.

[59] Bakonzi ya banganga-Nzambe ná bato nyonso ya Likita-Monene bazalaki koluka bato oyo bakoki kokosela Yezu makambo po bákatela ye etumbu ya liwa.

[60] Kasi atako bato mingi bayaki kokosela ye makambo, bazwi likambo moko té tii sima bato mibale bayei,

[61] balobi boye: “Moto oyo alobaki: ‘Ngai nakoboma Ndako ya Nzambe pe nakotònga yango lisusu na mikolo misato.’”

[62] Bongo mokonzi monene ya banganga-Nzambe atelemi, atuni Yezu: “Okozongisa té? Bato oyo bazali kofunda yo na likambo nini?”

[63] Kasi Yezu afandi kaka nyee. Mokonzi monene ya baganga-Nzambe alobi na ye: “Kata seleka na kombo ya Nzambe ya bomoi! Yebisa biso soki yo ozali Mesia, mwana ya Nzambe!”

[64] Yezu azongiseli ye: “Yo moko olobi yango. Kasi nalobi na bino: banda sik'oyo bokomona mwana ya Moto, ndenge akofanda na esika ya lokumu penepene ya Nzambe ya nguya nyonso, pe ndenge akoya na mapata ya Likolo!”

[65] Na mbala moko nganga-Nzambe monene atomboki penza, apasoli nzambala na ye, pe alobi: “Atsioli Nzambe! Po na nini tóluka lisusu batemwen? Boyoki ndenge ye atsioli Nzambe!

[66] Bino bokanisi nini?” Bango bazongisi: “Asengeli kokufa!”

[67] Na sima babwakeli ye soi na elongi pe babeti ye makofi, bato mosusu babeti ye bambata,

[68] balobi: “Yo, Mesia, lakisa 'tè ozali profete! Nani moto abeti yo?”

[69] Piere afandaki libanda na kati ya lopango. Mosali moko ya mwasi ayei pe alobi na ye: “Yo pe ozalaki ná Yezu, moto ya Galilé.”

[70] Kasi ye awangani na miso ya bato nyonso, alobi: “Makambo ozali koloba na ngai, nayebi yango té.”

[71] Na sima akei na monoko ya lopango. Mosali mosusu ya mwasi amoni ye pe alobi na bato bazalaki wana: “Moto oyo azalaki ná Yezu ya Nazaret.”

[72] Piere awangani lisusu pe akati seleka, alobi: “Nayebi moto wana té!”

[73] Na sima ya mwa-tango moke bato bazalaki kuna bayei penepene ya Piere, pe balobi na ye: “Ya solo, yo ozali moto na bango. Elobeli na yo ezali kofunda yo!”

[74] Bongo Piere akati seleka: “Nzambe penza! Nayebi moto yango té! Soki nakosi, Nzambe ápesa ngai etumbu!” Kaka na tango wana soso eleli.

[75] Bongo Piere akómi kokanisa maloba Yezu alobelaki ye: “Liboso 'tè soso élela, okowangana mbala misato 'tè oyebi ngai té.” Piere abimi pe aleli na mawa mingi penza.

Matié — Chapters